الشمس
The Sun • 15 ayahs • Meccan
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
1(Na lapi) na mwese mpe na bongengi na yango[1]!
2(Mpe na lapi) na sanza ntango elandaka mwese!
3(Mpe na lapi) na moyi ntango ezali kongala!
4(Mpe na lapi) na butu ntango ezipi (mokili).
5Mpe mapata na oyo atongi yango!
6Mpe mabele na oyo atanda yango!
7Mpe na molimo na oyo abongisa yango,
8Mpe alakisi ye mabe naye mpe malamu naye (kobunga naye na bokambami)!
9Asili kolonga moto oyo apetoli (molimo naye),
10Asili kobebisama oyo aboyi kopetola yango.
11Bato ya Thamúd balekisaki ndelo mpe baboyi kondima,
12Ntango moto mabe kati na bango atelemaki.
13Motindami ya Allah alobaki na bango ete: Oyó ezali náqah[1] ya Allah botika yango emela mayi.
14Kasi baboyaki koyoka maloba naye mpe babomi yango, Nkolo na bango abomaki bango pona lisumu wana mpe akitisaki etumbu likolo na bango.
15Mpe (Allah) azali na bobangi te na maye makoya sima.