الليل
The Night • 21 ayahs • Meccan
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
1(Nalapi) na butu ntango ezipaka biloko binso!
2(Mpe na lapi) na moyi[1] ntango ezali ко ngala!
3Mpe (Allah) akeli mobali na mwasi.
4Ya soló, molende na bino ezali ya kokesene.
5Kaši тропа oyo apesi mpe abangi Allah,
6Mpe andimi na bosôló ya lifuti (lola).
7Tokolembisela ye nzela ya bozui.
8Kaši тропа oyo azali mopimi mpe azali komipesa na mabondeli te,
9Mpe aboyi kondima na mokolo ya mbano.
10Toko bongisela ye nzela ya paši.
11Bomengo naye ekosalisa ye na eloko te na ntango ya paši.
12Bokambi bozali bwa biso.
13Мре ya soló, bomoyi ya lelo na ya lobi bozali bwa biso.
14Nazali kokebisa bino na moto ezali kopela.
15Akozikisama na yango sé moto ya mabe.
16Oyó aboyi kondima mpe apesi mokongo.
17Kasi moto ya bobangi Allah akozala mosika na yango.
18Oyó azali kopesa bomengo bwaye mpo apetwama.
19Ezali te тропа ye kosepelisa moko o’kati ya bato.
20Sé тропа koluka kornona elongi ya Nkolo naye oyo azali olikolo koleka.
21Mpe na nsima Nkolo naye akosepela naye.