الأعلى
The Most High • 19 ayahs • Meccan
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
1S anzola kombo ya Nkolo nayo oyo azali na likolo koleka,
2Oyo akela mpe akokisa,
3Mpe atia mokano mpe akamba o nzela ya nsemba,
4Mpe oyo abimisa matiti,
5Mpe apesi yango langi ya mayi ya mpondu.
6Tokotangisa yo na lolenge ete obosana te,
7Sé na oyo ye moko Allah alingi, Nde ayebi maye mazali polele mpe maye mabombama.
8Mpe tokolakisa yo nzela ya pete.
9Pesa liteya na baye ekosalisa bango.
10Oyo azali na bobangi nde akokanisa.
11Oyo Akomitia mosika na yango ye nde moto ya mpasi.
12Oyo akozika na moto ya monene.
13O’nteyi na yango akokufa te mpe akozala na bomoyi te.
14Asili kolonga oyo amipetoli,
15Akanisi kombo ya Nkolo naye mpe asambeli.
16Kasi bino bolingi na bolingo makasi bomoyi ya nsé,
17Nzoka nde bomoyi ya lobi nde ezali malamu mpe ekowumelaka seko.
18Ya sôló oyo esila kokomama na mikanda ya yambo.
19Mikanda ya Ibrâhîm mpe ya Mûssa.