الرحمن
The Most Merciful • 78 ayahs • Medinan
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
1Ar-Rahmân[1],
2Atangisaki kurani.
3Akela moto.
4Atangisa ye koloba polele.
5Moyi na sanza etambolaka na bolamu oyo etiyama.
6Mpe minzoto na banzete egumbamelaka (Nkolo wa bango),
7Мре atombola likolo mpe atiyela emekeli,
8Mpo ete bolekisa ndelo te na emekeli.
9Mpe bopesa kilo na bosembo, kasi bobebisa emekeli te.
10Mpe atiya mabele тропа bikelamu ya bomoi,
11Okati na yango, okokuta bambuma na ba nagh’l[1] ekangama,
12Mpe bambuma bibatelami na efandelo na yango, na banzete ya malasi.
13Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? (moto mpe elima).
14Akela moto na mabele ya potopoto lokola mb eki,
15Mpe akela bilima kowuta na moto ezanga milinga.
16Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
17Nkolo ya moniele mibale mpe Nkolo ya biloli mibale.
18Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
19Atika bibale mibale bileka na bokutani.
20Kati kati na yango mondelo ezali mpo bisangana te.
21Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
22Yango mibale bizali kobimisa lulu’u na mardjânu. (mpalata na mabanga ya kongenga).
23Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
24Manso ya ye; masuwa maye mazali kotambola likolo ya ebale lokola bangomba.
25B olámu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
26Nyoso oyo ezali likolo ya mokili ekolimwa (na bokufi).
27Ekotikala sé elongi ya Nkolo nayo atonda lukumu mpe boboto.
28Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
29Baye bazali kati na likolo na mabele bazali kosenga ye, mikolo minso azali kokokisa eloko ya sika.
30Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
31Kala mingi te tokokataka makambo na bino, oh bino mibale! (moto mpe elima)
32Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
33Eh lisanga ya bilima mpe bato! Soki bokoki kobima na makambo ya likolo mpe ya nsé, bosala. Kasi bokokoka kosala yango te sé na makoki ya (Allah).
34Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
35Bakobwakela bino moto ya milinga ya nkoni to ya mabende mpe bokosungama te.
36Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
37Mpe tango likolo ekopasuka likokomaka na langi ya motané.
38Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
39O mokolo yango, bato na bilima bakotunama te тропа masumu na bango[1].
40Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
41Batomboki bakoyebanaka na bilembo na bango тре bakozuaka bango na suki ya ebandeli ya mutu тре makolo na bango.
42Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
43Oyo nde lifelo тропа batomboki oyo batiyaki tembe na yango.
44Bakobalukaka kati na yango na kati ya mayi ya moto ya makasi.
45Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
46Kasi oyo abangaki kotelema liboso ya Nkolo naye, akozala na bilanga mibale. (ya lola),
47Bolamu nini y a Nkolo na bino oyo bozali koboya?
48Okati na yango ezali na bolamu mibale,
49Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
50O kati na yango (bakokutaka) miluka mibale mizali kotiola,
51Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
52O kati na yango okokuta bambuma mibale mibale.
53Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
54Bakoyekama na matoko ya epeda (ya kilo kitoko) mpe bambuma ya bilanga mibale bikozala pembeni na bango тропа kobuka.
55Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
56Bakokuta o kati na yango basi kitoko ya miso ya minene baye batalaka pembeni te, mobali moko te kati ya bato to bilima asimba bango,
57Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
58Kitoko na bango ezali lokola mabanga ya ebale bazali kongenga.
59Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
60Boye bolamu efutamaka te sé na bolamu?
61Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
62Mpe ezali na bilanga misusu mibale likolo ya oyo ya liboso,
63Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
64Bizali na langi ya mpondu ya moyindo,
65Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
66Okati na yango ezali na miluka mibale ya bosepelisi,
67Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
68Okati na yango ezali na bambuma, na ba nagh’l[1] na rummân[2],
69Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
70Okati na yango ezali na basi kitoko mpe malamu,
71Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
72Basi ya miso minene kitoko bafandi nakati ya bièma,
73Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
74Mobali moko te kati ya bato to bilima asimba bango,
75Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
76Bakoyekama na bikata[1] ya langi ya pondu na bitoko ya kitoko.
77Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
78Tika ete epambolama nkombo ya Nkolo nayo oyo atonda lokumu mpe boboto.