الأنبياء
The Prophets • 112 ayahs • Meccan
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
1Eleko ya kokata likambo ya bato ekomi pembeni, kasi bazali komitungisa te тропа yango mpe bapesi mokongo.
2Bokundoli moko te ya Nkolo na bango, ekomelaka bango ezanga te sé bayoka yango na kotiola.
3Mitema mia bango mizali mosika, mpe babubi babebisi mitema mia bango, balobi: Oyo azali moto lokola bino тропа nini bozali komipesa na bondoki mpe bino bozali kornona malamu?
4Alobi: Nkolo wa ngai ayebi manso mazali kolobama o likolo mpe na nsé, mpe azali moyoki atonda boyebi.
5Kasi balobaki: Oyo wana ezali bosangani ya bandoto to ezali makambo naye moko, to ekoki kozala lisapo, to ayela biso elembo, ndenge etindamaki na bato ba yambo.
6Ezali na etuka (mboka) moko te eye topesaki etumbu liboso lia bango bandimaki te, boye bango nde bakondima?
7Mpe totindaki liboso nayo sé mibali topesaki bango emoniseli, botuna ba oyo bayebi soki bino boyebi te.
8Mpe topesaki bango nzoto mpo baliaka biloko, mpe batikalaki libela te.
9Sima tokokiselaki bango elaka тропа oyo bazalaki kosala, mpe tobikisaki baye tolingaki kobikisa kati na bango, mpe topesaki etumbu na balekisi ndelo.
10Tosilaki ya soló, kokitisela bino buku eye ezuami na bokundoli тропа bino. Boye bozali kokanisa te?
11Mpe ebele bamboka oyo ezuamaki na mbeba mpe tobomaki yango, mpe tokelaki bato basusu na esika na bango.
12Tango (bato wana) bamoni etumbu na biso, bakimaki na lombango,
13Bokima te, bozonga na bisika biye bozalaki kobebisa kati na bandako na bino, mpo bokoka kotunama.
14Bakolobaka: Oh biso mpasi! Ya sólo, tozalaki babubi.
15Bakotikaka komitungisa te, kino tokokomisaka bango lokola milona ya (mputulu miye mikawuka) mpe moto ezali kozikisa bango.
16Мре tokelaki likolo mpe na mabele, na maye mazuami kati na yango na lisano te.
17Soki tolingaki kozua yango na lisano, mbele tosalaki yango na ndenge ya biso moko soki ya soló tolingaki kosala.
18Tozali kolobela тропа bosôló, kasi lokuta te, mpe lokuta elimwa mpe ekende. Mpe mabe ekozala likolo na bino тропа oyo bozali kokokisa (Allah) na yango.
19Mpe manso oyo mazali o likolo mpe na nsé, mazali ya ye, тре baye bazuami pene naye (ba anzelu) basalaka lolendo te тропа kokumisa ye, mpe balembeke te.
20Bazali kokumisa (ye) butu na moyi, taka ezali kotikala te.
21Boye basili kozua banzambe oyo bakosekuisa bawa na mabele?
22Soki o kati ya likolo na o nsé ezalaka na banzambe mosusu elongo na Allah, mbele mobulu ekotaki kati na yango (mapata na mabele), mpe nkembo na Allah kolo ya ngwende na maye bazali kokokisa.
23Akotunamaka[1] na oyo asali te, kasi bango nde bakotunama na maye basalaki.
24Boye bazali kondimela banzambe mosusu na botiki ye? (Allah) loba: Boya na bilembetele na bino. Oyo ezali bokundoli тропа baye bazali elongo na ngai, тре bokundoli тропа baye balekaka liboso na ngai. Kasi ebele na bango bazali koyeba bosôló te. Мре bazali komitiya mosika па yango.
25Мре liboso nayo totindaki motindami te, sé topesa ye emoniseli ete: Ya soló, nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te bobele ngai, mpe bobondela ngai.
26Mpe bazali koloba: Ar-Rahmân azali na mwana, nkembo naye, kasi bazali sé bawumbu (naye) ya lokumu,
27Balekaka ye na maloba te, basalaka sé na mitindo mia ye.
28Ayebi oyo ezali liboso na bango mpe sima na bango mpe bazalaka balobeli ya moto te sé na ba oyo (Allah) asepeli na bango, mpe bazali kobanga ye bobangi ya sólo.
29Мре oyo kati na bango akoloba ete: Ya soló ngai nazali nzambe kasi ye te (Allah), tokofuta ye lifelo. Boye nde tokofutaka babubi.
30Boye bapengwi bazali kornona te, ete likolo na mabele bizalaki ya kokangama mpe to fungoli yango? Mpe tokela bomoyi nyonso kowuta na mayi? Boye bazali kondima te?
31Mpe totiyaki bangomba o kati na mabele mpo ete esimbama makasi mpe eningana te na baye bazali likolo nayango mpe totiyeli yango banzela mpo bakoka kokambama.
32Mpe totiyaki likolo ezala etando eye ebatelama, kasi bazali komitiya mosika na bilembo na yango.
33Mpe yende akela butu na mokolo, moyi na sanza, nyoso ezali kotambola na nzela na yango.
34Mpe totiaki moto liboso nayo te mpo atikala libela, soki yo okufi, bango nde bakotikala libela?
35Molimo nyoso mokomeka liwa (moto nyoso akokufaka), mpe tokomeka bino na mabe mpe na malamu mpe epai na biso nde bokozongisama.
36Mpe tango bapengwi bazali kotala yo mpe bazali koseka yo, mpe bazali koloba: Oyo nde azali kolobela banzambe na bino? Mpe bazali koboya bokundoli ya Ar- Rahmân.
37Moto akelama na kowela wela. Nakolakisa bino bilembo na ngai, kaši bowelisa ngai te тропа yango (etumbu)
38Mpe bakolobaka: Elaka yango ekokokisama tango nini, soki bozali koloba solo?.
39Soki bapengwi bayebaka tango oyo bakopekisaka te móto ezua bango na bilongi bia bango mpe na mikongo mia bango, kaši bakolongisamaka te.
40Kaši tango wana ekoyelaka bango na mbalakaka, mpe bakokoka kozongisa yango te, mpe bazali kotala.
41Mpe batiolaki batindami yambo ya boyei nayo, mpe baye basakanaki na bango, babetamaka na lolenge nyoso, тропа oyo bazalaki kotiola yango.
42Loba: Nani abatelaka bino o kati na butu тре па тоуі па etumbu ya Ar-Rahmân? Мре bazali kopesa mokongo na bokundoli ya Nkolo wa bango.
43To bazali na banzambe basusu na esika na biso oyo bakobatela bango? Kasi bakokoka te komisalisa bango moko mpe bakokoka te koluka nani akosunga bango likolo na ngai.
44Kasi topesaki ba oyo mpe batata na bango bisengo ya ntango шоке kino mibu na bango mikoma ebele. Boye bazali kornona te ete tozali kokutola mabele bangambo na yango nyoso? Boye bakanisi ete bakolonga?
45Loba: Nazali kokebisa bino na emoniseli. Mpe oyo matoyi naye ekufa, akoyokaka te o tango bazali kokebisa ye.
46Mpe soki mopepe ya etumbu ya Nkolo wa bango mozui bango, balobi: Eh biso! Mpasi na biso, ya soló, tozalaki babubi.
47Mpe o mokolo mwa suka, tokotiyaka bimekeli bia bosembo, molimo moko te mokobubama, ata soki ezali emekelo ya mbuma ya moke ezanga kilo tokoya na yango. Tokoki mpenza тропа kofuta.
48Mpe tosilaki kopesa Mûssa na Háruna buku, ya bososoli (torah) mpe na bongengi mpe ezala bokundoli тропа babangi,
49Baye bazali kobanga Nkolo wa bango ata soki bazali kornona ye te, mpe bazali kobanga eleko ya mokolo ya suka.
50Мре (kurani) oyo ezali bokundoli oyo epambwama tokitisaki yango, boye bino bozali koyina yango?
51Mpe liboso tosilaki kopesa Ibrâhîm bokambi mpe biso nde toyebaki yango,
52Tango alobaki na tata waye mpe bato naye: Oyo bikeko nini bozali komipesa na yango?
53Balobaki: Tokutaki batata na biso (to, bankoko na bango ya kala) bazalaki kobondela yango.
54Alobi: Ya soló, bino na bango bozalaki na libunga ya polele.
55Balobaki: Oyeli biso bosóló to ozali kosakana?
56Alobi: Kasi Nkolo wa bino azali Nkolo wa likolo mpe nsé oyo akela yango, mpe ngai nazali moko kati ya banzeneneke na yango.
57Mpe na lapi na Allah, ete nakani bikeko bia bino osima ya kokende na bino.
58Abuki yango biteni biteni, atiki oyo ya monene, mpo tango mosusu bakozongela yango.
59Balobi: Nani asali banzambe na biso boye? Ya soló, ye azali moko ya babubi.
60Balobi: Bayebisi biso oyo asali boye ezali elenge mobali moko nkombo naye Ibrâhîm.
61Balobi: Bomema ye awa na miso ya bato mpo bakoka kotatola.
62Balobi: Yo nde osali boye na banzambe na biso oh Ibrâhîm?
63Alobi: Oyo asali boye nde mokolo wa bango oyo, botuna bango soki bakoki koloba.
64Bazongisaki mayele na bango mpe balobi: Ya sólo, bino nde bozali babubi.
65Sima mabe ezongeli bango moko mpe balobi: Oyebi malamu ete (bikeko) oyo bilobaka te.
66Alobi: Boye bozali kobondela na botiki Allah maye makosalisa bino te mpe makosala bino mabe te?
67Ufi[1] na bino na maye bozali kobondela biye bizali Allah te, boye bozali kokanisa te?
68Balobi: Bozikisa ye, mpe bosunga banzambe na bino. Soki ya sólo, bolingi kosala.
69Tolobaki: Eh móto! Zala malili mpe kimia тропа Ibrâhîm.
70Mpe balingaki kosala ye mabe, kasi totiyaki bango o kati ya bazangi mpenza.
71Mpe topesaki ye elonga, mpe Loth lokola, mpe totindaki bango o mboka eye to pambolaki yango mpo na bato ya mokili mobimba.
72Mpe topesaki ye Is’háq na Ya’qúb ndenge asengaki, mpe banso totiyaki bango o kati ya bato malamu.
73Mpe totiyaki bango bakambi, mpo bakamba na mibeko mia biso, mpe tolakisaki bango kosala bolamu, mpe kotelemisa losambo mpe kopesa zakat mpe bazalaki babondeli na biso.
74Mpe topesaki Loth bwanya na boyebi, mpe tobikisaki ye na mboka oyo bazalaki kosala mabe. Ya soló, bazalaki bato mabe mpe bazangi.
75Mpe tokotisaki ye na mawa та biso, ya sólo azali kati na bato ya malamu.
76Mpe tango Núh abelelaki liboso, tondimelaki ye, mpe tobikisaki ye na libota lia ye kowuta na milelo monene.
77Mpe tolongisaki ye kowuta na bato baye baboyaki kondimela bilembo bia biso mpe bazuaki yango ete: Ezali lokuta. Ya soló, bazalaki bato ya mabe, mpe tozindisaki bango banso.
78Mpe Dâwud na Suleyman, tango basambisaki тропа bilanga oyo bameme ya bato bakendaki kolia yango na butu, mpe tozalaki nzeneneke тропа bosambisi bwa bango mibale.
79Mpe topesaki Suleyman bososoli na yango, mpe topesaki bango banso bwanya mpe boyebi, mpe topesaki ngolu na biso epai ya Dâwud ete: Bangomba mpe bandeke basanzola biso elongo naye, mpe biso nde tozalaki kosala yango.
80Mpe tolakisaki ye kosala nguba[1] mpo ezala lisungi lia bino, boye bozali na botondi?
81Mpe tondimelaki Suleyman, mopepe moye na motindo naye mopepaki noki noki о ngambu ya mabele maye topambolaki yango. Mpe tozali bayebi ya biloko binso.
82Mpe bazabulu mosusu bazali kosalela ye mosala na nsé ya mayi mpe bazalaki kosalela ye misala misusu, kasi biso nde tozalaki kokengela bango.
83Mpe Ayûb, tango abelelaki Nkolo wa ye, ete ya soló, mpasi esili koleka ngai, mpe yo nde ozali ngolu wa bangolu koleka.
84Tondimelaki ye mpe tolongolelaki ye mpasi oyo azalaki na yango, mpe tozongiselaki ye libota lia ye mbala mibale ngolu kowuta epai na biso, mpe bokundoli тропа babondeli.
85Mpe Ismâîl na Idrîs na Dzul-kifl bango banso bazalaki bakangi mitema,
86Mpe tokotisaki bango na ngolu na biso. Ya soló, bazalaki o kati ya bato ya malamu.
87Mpe Yûnus, tango akendeki na kanda, akanisaki ete tokoki komeka ye te, mpe abelelaki na molili (na mozindo ya ebale) ete: Nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosôló seyo (Allah) lokumu ezala nayo, ya sólo, nazalaki o kati ya babubi.
88Tondimelaki ye mpe tobikisaki ye na kolela naye. Lolenge wana nde tosalisaka bandimi.
89Mpe Zakariya, tango abelelaki Nkolo wa ye, Nkolo wa ngai kotika ngai moko te, mpe ya sólo, ozali malamu ya bakitanisi.
90Tondimelaki ye mpe topesaki ye Yahya, mpe tobikisaki mwasi naye (na ekomba). Ya soló, bazalaki kowelela тропа kosala bolamu, bazalaki kobondela biso na bolingo mpe na kobanga mpe bazalaki komikitisa liboso na biso.
91Mpe oyo abatelaki bongondo naye (Maryam) mpe tofulaki mpema na biso kati naye, mpe totiaki ye na mwana naye bazala elembo тропа mokili mobimba.
92Ya soló umma[1] na bino oyo ezali sé moko mpe ngai nde Nkolo wa bino bobondela nga.
93Mpe bokabwani ekoti kati na bango, mpe bango banso bakozonga epai na biso.
94Oyo akosala misala malamu mpe azali mondimi, tokoboyaka molende mwa ye te. Mpe ya soló tokokomela ye (yango).
95Epekisami na mboka oyo tosili koboma yango ete bazonga lisusu na bomoi likolo na yango.
96Kino tango ba kofungola ya’djûdj na ma’djûdj mpe bango bakokita na lombango.
97Wana elaka ya sólo ekomi pene, mpe okomona bapengwi bakomi kotala, bakolobaka: Mpasi na biso, tozalaki na bozangi kokanisa na oyo mpe tozalaki babubi.
98Ya soló, bino na maye bozali kobondela na botiki Allah, bokozala koni mwa lifelo bokokotaka na kati bino banso.
99Soki bango bazalaki banzambe, balingaki kokoto yango te (lifelo), mpe bango banso o kati na yango libela na libela.
100Kati na yango bakonyokwama mpe bako ganga makasi, mpe bakoyokaka kati na yango te.
101Ya sólo, baye bakozala mosika na lifelo, ezali ba oyo tosilaki kolaka bango bolamu.
102Bakoyokaka lolaka na yango te, mpe bakosepelaka lolenge balingi seko na seko.
103Kobanga ya monene ekozua bango te, mpe ba anzelu bakoyambaka bango: Oyo nde mokolo ba laka bino.
104Mokolo moye tokogumba mapata ndenge bagumbaka makasa ya makomi. Ndenge tokelaki mbala ya yambo, ndenge wana mpe tokozongela yango. Wana ezali elaka na biso tokokokisa yango.
105Mpe ya soló, tosilaki kokoma o kati ya zabur, o sima ya makundoli, ya solo, baye bakoki kozua bokitani ya mabele ezali bawumbu na ngai ya malamu (bandimi).
106Ya sólo, oyo ezali botangisi тропа babondeli.
107Mpe totindaki yo te sé тропа ozala ngolu тропа mokili mobimba.
108Loba: Ya sólo, ngai nazui emoniseli ete ya sólo Nzambe wa bino azali Nzambe moko, boye bondimi komisokia?
109Mpe soki baboyi mpe bapesi mikongo, loba: Nazali kokebisa bino, mpe nayebi te, soki oyo elengelemi тропа bino ezali pene to mosika.
110Ya sólo, ye ayebi polele ya maloba mpe maye bobombaka.
111Mpe nayebi te soki ezali komekama mpo na bino to esengo ya ntango токе.
112Alobi: Nkolo kata na bosembo bonso. Mpe Nkolo wa biso Ar- Rahmán[1] ye nde mosalisi likolo ya maye balobelaka.