الغاشية
The Overwhelming • 26 ayahs • Meccan
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
1Ekomeli yo sango ya oyo ekozipa?.
2Mokolo wana bilongi bikobanga,
3Makambo maleki bango bakomi na bolembu,
4Bakozikisama o’kati ya moto ya makasi.
5Mpe bakomelisa bango mayi ya moto.
6Bakozala na bilei te sé matiti ya nzube,
7Ekosilisa bango nzala te mpe ekopesa bango nzoto Nkolongono te.
8Mokolo wana bilongi misusu bikozala na esengo.
9Bikosepela pona maye basalaki,
10Okati ya lola ya likolo,
11Okati na yango okoyoka te makambo ya pamba pamba,
12Okati na yango maziba mazali kotiola,
13Okati na yango bambeto ya kotombwama,
14Mpe bakopo bitiami,
15Mpe bikáta bitandami,
16Mpe bankwala bizali ya kotandama,
17Bazali kot ala te ba ibil[1] ndenge ekelama?
18Mapata lolenge etombwama,
19Mpe bangomba lolenge epikama,
20Mpe mabele lolenge etandama?
21Kundola, pamba te yo ozali sé mokundoli.
22Kasi ozali mokengeli likolo na bango te.
23Longola sé oyo apesi mokongo mpe aboyi kondima,
24Allah akopesa ye etumbu ya monene.
25Ya soló, epai na biso nde bozongi na bango,
26Mpe ya sólo lifuta lia bango ezali omaboko na biso