الطارق
The Night Comer • 17 ayahs • Meccan
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
1(Na lapi) na mapata mpe na monzoto y a butu!
2Nani akoyebisa yo nini monzoto ya butu,
3Ezali monzoto ya bongengi makasi.
4Ezali na molimo moko te sé azala na mokengeli likolo naye.
5Esengeli na moto ayeba na nini yango akelamaki,
6Akelamaki kowuta na litanga ya mayi.
7Ewuti o’kati na mokongo mpe mipanzi.
8Ya soló Allah azali na nguya ya bozongisi ye na bomoyi,
9Mokolo moye mitema mikobimisa maye ebombaki,
10Akozala na nguya te mpe akozala na mosalisi te.
11(Na lapi) na mapata maye mazali kokitisa mbula,
12Мре (na lapi) na mabele maye mazali kofungwama,
13Ya soló, oyo (kurani) ezali liloba ya bosembo.
14Kasi ezali eloko ya pamba te.
15Ya soló, bango bazali koyangela mwango,
16Ngai mpe nazali na ya ngai mwango.
17Pesa bapagano elaka, pesa bango elaka ya mokuse.