التكوير
The Overthrowing • 29 ayahs • Meccan
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
1Ntango mwese (moyi) mokokoma molili.
2Mpe ntango minzoto miko limwa.
3Mpe bangomba bikotambola.
4Mpe ntango bakamela ya zemi bakosundolama.
5Mpe banyama ya mabe bakosangisama.
6Mpe ntango bibale bikopela móto.
7Mpe milimo mikosangisama.
8Mpe ntango mwana шоке ya mwasi akotunama,
9Nalisumu nini asalaki mpo baboma ye.
10Mpe ntango bakosakola makomi.
11Mpe ntango mapata makopasuka.
12Mpe ntango lifelo likopelisama.
13Mpe ntango lola ekokoma pembeni na bato.
14Moto akoyeba maye asalaki.
15Te, na lapi na mapata maye matongami,
16Maye mazali kokima mpe kolimwa,
17Na lapi mpe na butu ntango ekweyaka,
18Mpe na ntongo ntango etanaka,
19Ya soló, oyo ezali liloba ya motindami gabiliyele ya lokumu,
20Atondi na nguya kowuta epai na Nkolo ya ngwende ya lokumu.
21Atosami atonda bosembo.
22Sôló ndeko na bino (Muhammad) azali na ligboma te.
23Amonaki ye ya sôló na suka, oyo likolo emonanaka polele lokola ekweyi na mabele.
24Azali kobomba te maye makitaki epai naye.
25Yango (kurani) ezali liloba ya satana te.
26Bozali kokende wapi?
27Ezali sé bokundoli тропа molongo mobimba,
28Na oyo alingi kati na bino amisembwama.
29Bokolingaka te sé sima ya kolinga ya (Allah) Nkolo ya mokili.