المعارج
The Ascending Stairways • 44 ayahs • Meccan
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
1Mosengi azali kosenga etumbu oyo ekozanga kokweya te.
2Ekopekisama te mpo ekwela bapengwi.
3Epai ya Allah nde nzela ya komata mpe kokita ezali.
4Ba anzelu mpe molimo mosantu bazali komate epai naye na mokolo moko oyo tango na yango ezali kowumela lokola mibu nkoto ntuku mitano.
5Zela bozeli ya malamu.
6(Bapengwi) bazali kornona yango mosika,
7Kasi tozali kornona yango pembeni.
8Mokolo oyo likolo likopelaka lokola ebende ya mafuta,
9Mpe bangomba bikokoma lokola elamba ya kofinika.
10Molingami akotuna moninga te,
11Bazali kotalana, moto mabe akoluka ete akaba bana naye mpo abatelama na etumbu ya mokolo wana.
12To mwasi, to ndeko naye ya mobali.
13(Ata soki bayei) moto naye ya libota oyo azalaki kobatela ye.
14Ata bayei na manso mazali na nsé тропа kobatela ye.
15Eloko te, ezali nde moto.
16Ekolongola ye bamposa ya mutu na makasi,
17Moto ekobengaka baye baboyaki kondima.
18(Kolandana) na misolo oyo asangisaki na mokili mpe apekisaki na yango nzela ya Allah epanzana.
19Ya soló, moto akelamaki na kozanga kimia.
20Soki mabe ezui ye, akomi na bobangi,
21Mpe soki bolamu ezui ye, akomi kopima yango.
22Longola sé baye bazali kotelemisa losambo,
23Baye bakangami na losambo na bango libela;
24Мре baye bazali kobimisa (zakat) na misoio mia bango,
25Mpona (kopesa) basengi na baye bazangi;
26Mpe baye bazali kondima ya soló na mokolo ya suka;
27Мре baye bazali kobanga etumbu ya Nkolo na bango;
28Ya soló, eloko moko ya kopekisa etumbu ya Nkolo na bango ezali te,
29Mpe baye bazali kobatela mitakala mia bango,
30Longola sé epai ya basi na bango to mpe bawumbu na bango ya basi, wana ezali lisumu te epai na bango,
31Kasi baye bakokende libanda ya oyo etindami awa, bango nde balekisi ndelo,
32Mpe baye bazali kobatela biloko ya bato malamu, mpe bazali kotosa maloba na bango tango ya boyokani;
33Mpe baye bazali kotatola sé bosóló,
34Mpe baye oyo bazali kobatela losambo na bango.
35Bango nde bakozala na lukumu okati ya bilanga ya lola.
36Kasi nini na bapengwi oyo bazali kokima epai nayo bakingo etelemi,
37Ngambu ya loboko ya mobali to ya loboko ya mwasi bazali ya kokabwana?
38Boye moko na moko kati na bango azali kosepela ete bakotisa ye na lola ya nkembo?
39Eloko te, mpo tokelaki bango na maye bayebi.
40Mpe nalapi na Nkolo ya miniele mpe biloli na bilembo bia ngrásia ete: Ya soló, tozali na makoki,
41Mpo ete tolongola bango toya na baye ya malamu, mpe moto akopekisa biso azali te.
42Tika bango basakana mpe babunga kino bakokutanaka na mokolo oyo tolakaki bango.
43Mokolo bakobima na malita noki lokola bazali kokima mbangu epai na mabanga matandami;
44Bakokitisaka miso na bango mpe kotombola yango na soni, wana ekozalaka mokolo ya elaka na bango.