المؤمنون
The Believers • 118 ayahs • Meccan
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
1Bandimi basila kolonga.
2Baye bamikitisaka tango bazali kosambela.
3Mpe baye bazali kokima (makambo) maye mazanga ntina.
4Mpe baye bazali kobimisa zakat.
5Mpe baye bazali kobatela mitakala mia bango na ekobo,
6Longola sé epai na basi na bango, to mpe bawumbu basi baye bazali na maboko na bango (bakoki kofanda na bango mwasi na mobali) mpo ete wana bakopamelama te.
7Na yango, moto oyo akoluka kolekisa ndelo wana, bango nde babuki mibeko,
8Mpe baye bazali kobatela mabombisi (amanati) oyo bapesi bango mpe bazali kotosa mpe kokokisa bilaka bia bango.
9Mpe baye bazali kobatela balosambo na bango.
10Bango nde bakitani.
11Bakokitanelaka bisika ya likolo, na lola bakozalaka libela o kati na yango.
12Mpe tosilaki kokela moto na mabele ya potopoto,
13Sima tozalisaki ye litanga lia (mayi) ya ndembo kati ya ebombelo ya makasi.
14Sima tokomisaki mayi liboke ya makila sima makila ekomi mosuni, sima mosuni ekomi mokuwa, sima tolatisi mokuwa mosuni, sima tosali ye ekelamu mosusu. Mapamboli manso mazali ya Allah mokeli ya malamu,
15Sima na yango bokokufaka ya soló,
16Sima bokosekwisamaka ya soló o mokolo mwa suka,
17Мре tosilaki kokela o likolo na bino mapata sambo, mpe tozangaki bokebi te o tango ya bokeli.
18Mpe tozali kokitisa mayi kowuta o likolo na bokoki (mayi wana eleka ebele te), sima tovandisi yango na mabele, mpe tozali na bokoki ya kobungisa yango.
19Mpe kowuta na yango nde tozali kobimisela bino bilanga ya naghil na a’nâb, yango wana bozali na bambuma ebele, mpe bozali kolia bisusu o kati na yango.
20Na nzete esusu ebimi na ngomba ya sinaî, ezali kobimisa mafuta тропа bopakoli тре тропа baleyi.
21Mpe ya soló, bibwele bizali liteya тропа bino, tozali komelisa bino maye mazali kobima na mabumu na yango (miliki) тре bizali kosalisa bino mingi, тре bozali kólia bisusu kati na yango.
22Mpe na yango na bamasuwa bozali kokumbama.
23Mpe tosilaki kotinda Nûh epai na bato naye alobi: Oh bato ba ngai! Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosôló na botiki ye. Boye bozali kobanga te?
24Mpe bankumu bapengwi okati na bato naye balobi: Nini oyo, azali moto lokola bino. Alingi amatela bino, soki Allah alingaka, (kotinda ntoma) mbele akitisaki ba anzelu. Makambo oyo totikala koyoka yango epai ya bankoko na biso ya kala te.
25Oyo sé moto ya ligboma, bótala ye sima ya tango токе.
26Alobi: Nkolo wa ngai, sunga ngai mpo bazwi ngai moto ya lokuta.
27Tomonisaki naye ete; salamasuwa na miso na biso mpe na mitindo mia biso mpe tango mokano na biso ekoya mpe mayi ekobima na makasi na litumbu,[1] kotisa na kati ya masuwa balolenge ya banyama moko na moko mwasi na mobali elongo na libota nayo, longola sé baye kati na bango liloba lisengeli likokisama likolo na bango. Kasi kotuna ngai te mpo na babubi, mpo ete bakozinda mbalakaka na mayi (bakokufa).
28Mpe soki omati na masuwa yo na ba oyo ozali na bango, loba: Lokumu ya Allah oyo alongisi biso likolo ya bato mabe.
29Mpe loba: Nkolo kitisa ngai na esika ya mapamboli, mpe yo nde mokitisi ya malamu.
30Ya soló, wana nde bilembo. Mpe tozali ya sólo baye topesaka komekama.
31Sima na bango tokelaki bato basusu.
32Mpe totindelaki bango motindami kowuta kati na bango moko mpo ayebisa bango ete: Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosôló na botiki ye, boye bozali kobanga te?
33Mpe bankumu kati na bato naye na baye baboya kondimela elaka ya suka mpe topesi bango bolamu awa na nsé, balobi: Ye azali moto lokola bino, aliaka biloko oyo boliaka, mpe amelaka oyo bomelaka.
34Kasi soki botosi moto oyo azali lokola bino, wana bosili kozanga.
35Boye azali kolaka bino ete: Soki bokufi mpe bokomi putulu mpe mikuwa, ete bokobima (na malita)?
36Mosika mosika тропа oyo bazali kolaka bino.
37Wana ezali sé bomoyi ya biso oyo ya nsé, tozali kofanda mpe tozali kokufa kasi tokosekwa te.
38Wana azali moto oyo azali kobukela Allah lokuta, mpe tokondimelaka ye te.
39Alobi: Nkolo, sunga ngai mpo ete bazwi ngai moto wa lokuta.
40(Allah) alobi: Iyo; kala mingi te bakokoma na mawa.
41Mpe ligangi esimbaki bango na bosôló, mpe tokomisaki bango lokola makasa ya kokawuka (mpe bakumbami na mayi makasi), mpe libebi тропа babubi.
42Sima na bango tokelaki bato basusu.
43Mokano ya umma[1] nyoso mokoki koleka eleko na yango te, mpe ekokutuama te.
44Sima totindaki batindami na biso ya kolandisa, tango nyoso motindami akoyaka na umma moko bazui ye moto ya lokuta, mpe tolandisaki bango na bango, mpe tobetelaki bango másese (ya kokamwisa mpe kobangisa bango) mpe libebi тропа baye bandimaka te.
45Sima totindaki Mûssa na ndeko waye Hânına na bilembo bia biso mpe bokonzi ya polele,
46Epai ya falo na bankumu naye, (bato naye), basali lolendo, mpe bazalaki bato ya lolendo koleka.
47Balobi: Tondimela bato mibale oyo bazali lokola biso, mpe bato na bango bazali bawumbu na biso?
48Bazui bango nyoso mibale ete bazali bato ya lokuta, mpe bazuamaki[2] kati ya baye babebisamaki. buku mpo tango mosusu bakokambama.
49Mpe tosilaki kopesa Mûssa buku mpo tango mosusu bakokambama.
50Mpe totiyaki mwana ya Maryam na mama waye mpo (bazala) elembo, mpe totombolaki bango nyoso mibale na esika ya likolo na ngomba, eye ezali na kimia mpe na mayi ebele.
51Eh bino batindami! Boliya bilei ya malamu mpe bosala malamu. Ya soló, ngai nayebi maye bozali kosala.
52Mpe umma[1] na bino oyo ezali sé umma[2] moko, mpe ngai nde Nkolo na bino bobanga ngai.
53Mpe bakabwani[1] na makambo ya lingomba lia bango biteni biteni moto na moto azali kosepela na o ya ye.
54Tika bango na libungi kino mwa ngonga moke.
55Bazali kokanisa te, misolo na bana oyo tondimeli bango?
56Tozali kopesa bango bolamu na lombango. Kasi bazali koyeba te.
57Ya soló, baye na ntina ya bobangi Nkolo wa bango, batondisami na mawa.
58Mpe baye bazali kondima na mikapo mia Nkolo wa bango.
59Mpe baye basangisaka Nkolo wa bango na eloko te.
60Mpe baye bazali kobimisa maye bapesi bango wana mitema mia bango mitondisami na bobangi (Nkolo wa bango), po bakozongaka epai ya Nkolo wa bango.
61Baye wana bazali kowelisa тропа kosala bolamu, mpe bazali bato ya yambo тропа kosala (yango).
62Mpe topesaka moto mokumba te sé oyo ekoki naye, mpe buku oyo ezali koloba bosembo ezali nde epai na biso mpe bakobubama te.
63Kasi mitema mia bango mitondi na libungi тропа (kurani) oyo, mpe bazali na misala misusu bazali kosala (bazali kosalela yango na lolenge esengeli te oyo Allah atindi),
64Kino tokomekisaka bato ya bozwi etumbu 0 kati na bango. Mpe okomona bango bakomi koganga тропа kosenga lisalisi.
65Boganga lelo te. Ya soló, bokozua lisungi na biso ata шоке te.
66Bozalaki koboya mikapo mia ngai miye bazalaki kotangela bino liboso,
67(Bozalaki) kosalela yango lolendo mpe kotiola yango na tango miso na bino ezalaki polele.
68Boye bazali komanyola liloba na oyo te (kurani) to eyeli bango oyo eyelaki bankoko na bango te?
69To bayebaki motindami na bango te, mpo ete baboya ye?
70To, bazali koloba ete azali ligboma? Kasi ayelaki bango na bosôló, mpe ebele na bango bazali kondima te.
71Soki bosôló eyaki тропа kolanda bamposa na bango mbele mapata mpe mabele na maye mazali okati na yango malingaki kobeba, nzoka nde toyelaki bango bokundoli[1] na bango mpe bango тропа bokundoli na bango bazali kopesa mokongo.
72To ozali kotuna bango lifuta? Kasi lifuta ya Nkolo nayo nde ezali malamu, ye mopesi bomengo ya malamu.
73Mpe ya soló, ozali kobenga bango na nzela ya semba,
74Mpe baye bandimaka te o mokolo mwa suka, bazali mosika na nzela yango.
75Mpe soki topesaki bango ngolu na biso, mpe tolongola bango mpasi oyo bazalaki na yango, balingaki kotikala sé na masumu na bango mpe bakozinda mpenza kati na botomboki na bango.
76Mpe tosilaki kopesa bango etumbu, kasi batosaki Nkolo wa bango te, mpe bamilelaki epai naye te (epai na Allah), тропа kosenga,
77Kino tokofungolela bango ezibeli ya etumbu ya makasi, mpe bakozanga elikia (тропа bolamu ya Allah).
78Mpe ye nde akela тропа bino, bomoni na boyoki na mitema, kasi bozali kotondo ye sé токе.
79Ye nde akela bino mpe ati bino o mabele, bokosangisama epai naye.
80Ye nde mopesi bomoyi mpe mopesi liwa, mpe ye nde mokesenisi butu na mokolo, boye bozali kokanisa te?
81Kasi balobaki se maye bato wa yambo balobaka.
82Balobi: Tango tokokufaka, tokokomaka putulu mpe mikuwa. Ya soló, boye tokosekwisamaka lisusu?
83Basila kolaka biso na batata na biso liboso тропа oyo, yango ezali sé masapo ya kala.
84Loba: Mabele na oyo ezali okati na yango ezali ya nani? Soki soló bozali koyeba.
85Bakolobaka: Ezali ya Allah. Loba: Boye bozali kokanisa te?
86Loba: Mapata sambo ezali ya nani, тре nani Nkolo ngwende ya monene?
87Bakolobaka: Ezali ya Allah. Loba: Boye bokobanga te?
88Loba: Bokonzi bonso bosimbami na maboko ya nani? Azali kobatela, kasi babatelaka ye te, soki ya soló bozali koyeba?
89Bakolobaka: Ezali ya Allah. Loba: Kasi тропа nini bozali lokola balokami? (тропа kozanga na bango kondima na bomoko ya nzambe).
90Tomemelaki bango bosóló, kasi bango nde bato ya lokuta.
91Allah azali na mwana te, mpe ezali na nzambe mosusu te elongo naye, noki te, nzambe na nzambe alingaki kokende na bikelamu naye mpe basusu balingaki kozala likolo ya baninga. Nkembo mpe lokumu na Allah likolo ya maye bazali kolobela.
92Ayebi mabombami mpe makambo ya polele, azali likolo ya maye bazali kosangisa ye na yango.
93Loba: Nkolo; soki olakisaki ngai maye balakami.
94(Na yango) Nkolo, kotika ngai o kati ya babubi te.
95Ya soló, tozali na bokoki ya kolakisa yo maye tolaki bango.
96Bengana mabe (kobongola) na kosala bolamu. Soló, toyebi malamu maye bazali kolobela.
97Mpe loba Nkolo nazali kosenga nayo libateli тропа botombokisi ya basatana.
98Mpe nazali kosenga nayo libateli Nkolo, ete bazala pene na ngai te.
99Kino soki liwa ekomeli moko kati na bango akolobaka: Nkolo wa ngai, zongisa ngai.
100Mpo nasala bolamu na maye natikaki na mokili, te, kasi ezali sé liloba oyo alobi, osima na bango ezali na ndelo, kino omokolo ya bosekwisami.
101Мре tango bakobetaka to kofula kelelo, mokolo wana kibondeko ekozalaka te, mpe bakotunanaka mituna te.
102Baye emekelo na bango ekoleka kilo mingi, (тропа bolamu), bango nde balongi.
103Mpe baye emekelo na bango ekozalaka fafala, bango moko nde bamibungisaki, mpe bakokotaka lifelo, mpe bakozalaka libela o kati na yango.
104Moto mokozikisa bilongi bia bango, mpe bakozala o kati na yango na mbebo yakozikisama.
105Mitangelama bino mikapo mia ngai te, kasi bozalaki kondimela yango te?
106Bakolobaka: Nkolo wa biso, bamabe na biso elongi biso mpe tozalaki babungi nzela.
107Nkolo wa biso, bimisa biso okati na yango, mpe soki tozongeli, tokozala babubi.
108Alobi: Botikala na kati na kozanga lokumu, mpe bolobisa ngai te.
109Ya soló, Ezalaki na lisanga moko ya bawumbu na ngai bakolobaka: Nkolo wa biso, tondimi, limbisa biso mpe yokela biso mawa. Ya soló, yo ozali wa ngolu otanda bolamu.
110Kasi botiolaki bango, kino ebosanisi bino kokumisa ngai, mpe bozalaki koseka bango
111Ya sólo, lelo nazali kofuta bango тропа oyo bazalaki na bozeli na yango. Ya sólo, bango nde balongi.
112Bakotunaka bango, mibu boni bolekisaki o kati ya mokili?
113Bakolobaka: Tovandaki mokolo moko to ndambu ya mokolo, tuna batangi ya motango na yango. (baye bayebi kotanga mikolo miye havandaki)
114Akolobaka: Bovandaki sé tango ya mokie, ya sólo soki bozali koyeba.
115Boye bozali kokanisa ete tokelaki bino natina te, mpe bokozongisama epai na biso te?
116Lokumu na Allah wa likolo mokonzi ya sólo. Nzambe mosusu ya kobondela na bosoló azali te sé ye (mei) Nkolo ngwende ya lokumu.
117Mpe oyo akobondela elongo na Allah nzambe mosusu, azali na elembetele na yango ya polele te, ya soló lifuta naye mokozalaka sé epai ya Nkolo waye. Ya soló, bapengwi bakolonga te.
118Mpe loba: Nkolo limbisa mpe tiya ngolu, yo nde oleki na ngolu.