الحجر
The Rocky Tract • 99 ayahs • Meccan
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
1Alif, lâm, râ.[1] oyo wana ezali nde mikapo mia buku mpe kurani ya polele.
2(O mokolo mwa suka) bapengwi bakolobaka ete: Soki tozalaka ata ba mizilima.
3Tika bango balia, basepela moke (na ngonga) mpe elikya ya mokili ebosanisi bango mokolo ya bosôló, kasi kala mingi te bakoyeba.
4Kasi tobomaka mboka moko te sé ezala na mokano moyebani mosila kokomama.
5Umma[2] moko te ekoki kopuşa liboso to kozongisa mokano na bango sima.
6Mpe bakolobaka été: Oh yo moto bakitiseli ye buku! Ya soló, ozali moto ya ligboma.
7тропа nini te oyelaki biso ba anzelu soki ozalaki o kati ya balobi bosôló.
8Tokitisaka ba anzelu sé na bosôló, mpe bazelisaka te тропа etumbu.
9Tokitisaki bokundoli (kurani) na bosôló, тре sé biso nde tobatelaka yango.
10Mpe ya soló, totindaki batindami yambo nayo, o kati ya bato ba kala.
11Mpe motindami moko te ayelaki bango sé batióla ye.
12Ndenge wana nde tokotisaka kibopengwi o mitema mia batomboki.
13Bakondimaka na yango te,[1] mpe ya sólo, esilaki kosalama na bato ya liboso.
14Ata soki tofungolelaka bango ezibeli ya likolo тропа komata nde bandimaki mpe te.
15Bakolobaka: Ya soló miso та biso mizali ya kolangwa, kasi tozali nde balokami.
16Mpe tosilaki ya sólo, kotia minzoto na mapata, mpe topesi yango bonzenga тропа botali.
17Mpe tobatelaki yango na mabe manso ma satana wa botutu.
18Ata oyo akolinga koyokamela yango, tokolandisa ye moto
19Mpe o mabele totandaki yango, mpe totiyeli yango bangomba mpe tolandisaki eloko nyoso na bokoki bwa yango.
20Mpe totiyelaki bino okati na yango (mabele) bilei mpe bikelamu bisusu biye bozali na nguya ya koleisa yango te.
21Ezali na eloko moko te sé ezala na sanduku ya bozui na yango epai na biso, mpe tozali kokitisa yango ndambu ndambu na lolenge esengeli.
22Mpe tozali kotinda mipepe ya kokolisa milona mpe tokitisi mayi kowuta na mapata тропа komelisa bino na yango, oyo bozali na bokoki ya kobomba yango te.
23Mpe ya soló, tozali kopesa bomoyi mpe liwa, mpe biso nde tozali kopesa bokitani.
24Mpe toyebi baye baleka liboso na bino (basila kokufa), mpe toyebi baye batikali naino sima.
25Mpe ya sólo, Nkolo wayo akosangisaka bango, ya soló ye nde azali na bwanya atonda boyebi.
26Мре tokelaki moto na mabele ya kokawuka oyo ezwami na mabele ya muselu.
27Mpe tokelaki ba djini[1] liboso na moto ya molunge makasi.
28Mpe tango Nkolo wayo alobaki na ba anzelu ete: Ya soló nalingi kokela moto na mabele ya kokawuka oyo ezwami na mabele ya muselu.
29Mpe tango nakosilisa kobongisa ye na lolenge ya kitoko mpe na fuli okati naye, pema nangai bofukamela ye na botosi.
30Mpe ba anzelu banso bafukamaki.
31Longola sé lusufele (ibilisa), aboyaka kogumbama elongo na bagumbami.
32Na yango (Allah) alobaki: Oh lusufele! Mpona nini ozuami o motango mwa bagumbami te?
33Alobi: Nazali te mpona kogumbamela moto oyo okeli ye kowuta na mabele ya kokawuka oyo ezwami na mabele ya muselu.
34Mpe (Allah) alobi: Bima wana (na lola) mpo ozali na botutu.
35Mpe okozala na botutu kino mokolo mwa suka.
36Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Pesa ngai mwa tango kino mokolo mwa bosekwisami.
37Мре (Allah) alobaki naye ete: Ya soló, ozali kati ya bazelisami.
38Kino mokolo ya ngonga eye eyebani.
39Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Pamba te mpo omemi ngai na libungi, mpe na kobongisela bango mokili mpe nakobungisa bango banso.
40Longola sé bawumbu nayo baye osilaki коропа.
41(Allah) alobi: Oyo nde nzela ya bokambami epai na ngai.
42Ya solo, bawumbu ba ngai ozali na bokonzi likolo na bango te longola sé baye bakolanda yo nakati ya babungi.
43Mpe ya soló, lifelo ekozala esika na bango banso.
44Ezali na bikuke sambo тропа kokota, mpe bikuke binso biyebani na bato ba yango.
45Ya sólo, babangi bakozala na paladiso biye bizali na maziba.
46Bokota na kati na yango na kimia nyoso.
47Mpe tokolongolaka bango likunya eye ezalaki na mitema na bango mpe bakozala bandeko likolo ya bambeto yakotalana.
48Moko te bolembu ekozua ye, mpe bakobimaka o kati na yango te.
49Yebisa bawumbu ba ngai, ya soló, ngai nazali molimbisi natonda ngolu.
50Mpe ya sólo, etumbu na ngai ezalaka etumbu ya makasi.
51Mpe yebisa bango тропа bapaya ba Ibrâhîm.
52Tango bakotelaki ye mpe balobaki: Kimia (salam) alobi: Tozali kobanga bino.
53Balobaki: Kobanga te, ya sólo, tozali kopesa yo sango ya muana mayele oyo atondi na bwanya.
54Alobaki: Bozali kopesa ngai (sango eye) mpe boyebi malamu ete kibopaka esili kozua ngai, boye sango malamu nini bozali kopesa ngai?
55Balobaki: Tozali kopesa yo sango ya bosóló kozala okati ya baye bazangaka elikya te тропа bolamu.
56Mpe alobi: Nani azangaka elikya mpe ngolu ya Nkolo waye sé baye babunga nzela?
57Mpe (alobaki na bango): Eh batindami (ba Allah)! Bolingi nini?
58Balobi: Ya soló, totindami epai ya batomboki,
59Longola sé libota lia Loth, ya sólo tokolongisa bango banso,
60Longola sé mwasi waye, tosila kokata (Allah) ete akozala o kati ya baye bakozua etumbu.
61Mpe tango batindami bapusanaki pene na libota lia Loth,
62Alobi: Bozali bato bayebani te.
63Balobi: Toyeli yo mpo topesa etumbu na baye bazali kotiya tembe mpe bazali kondima te.
64Mpe toyei epai nayo na bosóló mpe tozali bato ba bosembo.
65Kima noki (kende noki) na libota lia yo na butu, zala sima na bango, moko te kati na bino atala sima. Mpe bökende sé na esika eye bakolakisa bino.
66Mpe topesaki ye mobeko mona, mpo bato bana etumbu ezua bango kobanda ntongo tii suka.
67Mpe bato ba mboka bayeli ye bazali kosepela,
68Alobi: Ya sólo, baye bazali bapaya ba ngai bosala bango mabe te.
69Bobanga Allah, kasi bokitisa lokumu na ngai te.
70Мре balobaki (na Loth): Topekisaki yo te na koyamba bato ya mokili?
71Alobi: Bozua bana ba ngai ya basi soki bolingi bosala bango oyo bolingi.
72Na bomoyi bwayo, ya soló bango bazali na milangwa mia liwa тропа bopengwi bwa bango.
73Mpe lolaka ya makasi ezuaki bango na ebimeli ya moyi.
74Mpe tobalusaki (mboka yango) na bangambo inso, mpe tobetiselaki bango mbula ya mabanga maye esanganaki na moto makasi.
75Ya sólo, wana nde bilembo тропа baye bazali na boyebi bakoka kornona.
76Мре ya sólo, mboka ena ezalaki lokola nzela eye eyebanaki na moto nyoso.
77Ya sólo, wana ezali elembo тропа bandimi.
78Ya sólo, etuka ya aïkat[1] bazalaki mpe babubi.
79Tozuaki bango mpe lokola, kasi mboka mibale oyo eyebanaki na bisika na yango awa na mokili mpe bitikalaki bilembo binene.
80Мре bato ba mboka ya hijr[1] basilaki kosala batindami mabe.
81Mpe tolakisaki bango makamwisi ma biso kasi balandaki yango te.
82Mpe bazalaki kotonga bandako bia bango okati ya bangomba тропа kozala na kimia.
83Mpe topesaki bango etumbu na ntongo o sima ya kolamuka.
84Maye manso bazalaki na yango, bakokaki kosala na yango eloko te.
85Mpe tokelaki likolo na nsé, na maye manso mazuami o kati na yango mibale te sé na bosóló, mpe ya soló, ngonga ekokokaka, limbisa bolimbisi bwa malamu.
86Ya sólo, Nkolo wayo azali mokeli mpe moyebi.
87Mpe tosilaki kopesa yo mikapo sambo[1] тропа kozongela yango na kotanga mbala na mbala, na kurani ya monene.
88Mpe kotala te na kolula bozwi ya kitoko topesaki balisanga na bango тропа bisengo ya tango токе, koyoka pasi тропа bango te, kasi zala na komikitisa pona bandimi.
89Mpe loba: Ya soló, nazali mokebisi ya polele.
90Ndenge moko tokitisaki (etumbu) likolo lia bakaboli[1],
91Baye bazuaki kurani ezala eloko ya bokabwani mpe tembe kati na yango,
92Mpe na nkombo ya Nkolo nayo, nakotunaka bango banso.
93Mpona maye bazalaki kosala.
94Monisa polele maye otindami na yango, mpe pesa mokongo na basangisi (Allah).
95Tozali kosunga yo liboso lia baye bazali kotiola yo.
96Baye bazali kosangisa Allah na biloko bisusu, bakoyebaka kala te.
97Mpe tosilaki koyeba ete motema nayo ezali kokangama na ntina ya maye bazali koloba.
98Mpe kumisa Nkolo wayo, mpe zala o kati ya bagumbami.
99Mpe bondela Nkolo wayo, kino bosôló bokoyelaka yo[1].