نوح
Noah • 28 ayahs • Meccan
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
1Ya soló totindaki Nûh epai ya bato naye ete: Kebisa bato nayo yambo ya etumbu makasi eyela bango.
2Alobaki: Oh bato na ngai! Ya sôló, nazali mokebisi ya polele тропа bino,
3Bobondela Allah, bobanga ye тре botosa ngai,
4Mpo alimbisa bino masumu тре apesa bino mikolo kino elaka yango ekoka. Ya soló, tango elaka ya Allah ekoki ezelaka te soki bozali koyeba!
5Alobi: Nkolo! Ya sólo, natei bato na ngai butu na moyi,
6Kasi mateya na ngai ebakiseli bango sé kokima,
7Mpe tango nazali kobenga bango mpo olimbisa bango, bazali kotiya misapi na matoyi na bango mpe kozipa yango na bilamba, basali motu makasi mpe lolendo.
8Sima nabengaki bango na polele,
9Mpe nayebisaki bango na polele mpe na lolenge ya kobombama.
10Nayebisaki bango été: Botubela epai ya Nkolo na bino. Ya soló, ye azali molimbisi.
11Mpo akitisela bino kowuta na likolo mbula ezala ya kolandana,
12Mpe apesa bino misolo na bana ebele, mpe abómbela bino bilanga mpe mingala.
13Mpona nini bozali kokumisa Allah te na ndenge esengeli?
14Mpe akela bino ndambu ndambu ya kotangama?
15Bozali kornona te lolenge Allah akela mapata sambo elandani,
16Mpe atiya bongengi kati ya sanza mpe mwinda okati ya moyi?
17Allah nde abimisa bino na mabele lokola milona.
18Sima akozongisa bino kati na yango mpe sima akobimisa bino penza.
19Allah atandela bino mabele ezala lokola etoko,
20Mpo botambola na kati ya banzela na yango.
21Nûh alobaki ete: Nkolo! Baboyi kotosa ngai kaši balandi sé moto oyo bozui naye na bana ekobakisela ye sé libungi.
22Mpe basali likita ya monene, (ya mabe).
23Mpe balobi ete: Botika banzambe na bino te, botika Waad te, botika mpe Suwaa te, yarúsa te, yaúqa mpe te na Nasra te. (ezali bankombo ya bikeko ya bango bazalaki kobondela)
24(Mpe) yango bisili kobungisa ebele mpe ezali kobakisela babubi sé libungi.
25Mpona mabe na bango, bazindisamaki na mayi, mpe bakotaki na móto, mpe bazuaki basungi te na botiki Allah.
26Mpe Nûh alobi: Nkolo! Kotika ata mopagano moko te na mokili.
27Soki otiki bango (na bomoyi), bakobungisa bawumbu nayo mpe bakobota sé basumuki.
28Nkolo! Limbisa ngai, na baboti na ngai na moto nyoso oyo akokota ndako na ngai mondimi mpe bandimi ya mibali na ya basi, mpe kobakisela bapengwi te sé libungi.