الحاقة
The Inevitable • 52 ayahs • Meccan
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
1Mokolo ya Sólo.
2Nini nde mokolo ya Sólo?
3Eloko nini ekolakisa yo mokolo ya sólo nde nini?
4Bato ya mboka Thamúd na Aad baboyaki kondimela likambo ya somo.
5Mpona bato ya Thamúd, babebisamaki na tangba ya makasi.
6Mpe mpona bato ya aad, babebisamaki na mopepe ya makasi,
7Mabe wana ekwelaki bango butu sambo na mikolo mwambe, okomona sé bibembe ya bato, bakomi lokola biteni ya nagh’l[1] ya kokata kata.
8Boye okomona ata eloko etikali?
9Falo na baye bazalaki liboso naye na bato ya mboka bikweisama, bayaki na mabe.
10Mpe baboyaki kondima na motindami ya Nkolo na bango, kasi azuisaki bango kozuama ya mawa te.
11Ya soló, tango mayi etondaki, biso nde tomatisaki bino okati ya masuwa.
12Mpo totiya yango etikala elembo mpo bato bakoka kokanisa.
13Mpe tango bakofula na kelelo mbala moko,
14Mabele na bangomba bikotombwana nako pasuka mbala moko,
15Mokolo wana ekozala bokweisami ya suka.
16Likolo likopasuka mpe langi na yango ekobongwanaka.
17Mpe ba anzelu (basantu) bakozalaka pembeni ya mapata (bazali na bobangi ya Nkolo wa bango) mpe ba anzelu mwambe bakomema ngwende (ya Allah) mokolo wana.
18Mokolo wana bokozongisaka nyoso epai ya Allah, bokobombaka eloko moko te.
19Oyó bakopesaka ye buku naye na loboko ya mobali, akolobaka: Bosimba mpe botanga buku na ngai!
20Nazalaki kolikia ete nakokutana na mbano mwa ngai.
21Мре akozala na bomoyi ya esengo,
22(Akozalaka) okati ya Iola ya likolo,
23Bambuma na yango ezali pembeni.
24Bolia mpe bomela na esengo kolandana na mikolo oyo bolekisaki.
25Mpe oyo bakopesa ye buku naye na loboko ya mwasi akolobaka: Eh ngai! Soki bapesaka ngai ata yango te,
26Mpe nayebaki ata eloko moko na yango te!
27Natikala ata na liwa na ngai.
28Misolo mia ngai misalisi ngai na eloko te.
29Bokonzi na ngai esili kobebisama.
30Bokanga ye singa na kingo,
31Sima bobwaka ye na moto!
32Bokanga ye na minyololo ya ntaka ntuku nsambo.
33Ya soló, azalaki kondima na Allah wa monene te,
34Mpe azalaki na (mawa) ya koleisa babola te.
35Lelo azali na mosungi te,
36Mpe bilia naye ekozala sé mayi ya moto ya tofina,
37Baye bakoliaka yango sé ba oyo basalaki mabe.
38Nalapi na maye bozali kornona,
39Мре na maye bozali kornona te,
40Yango, ezali liloba lia motindami ya lokumu.
41Kasi ezali liloba lia moto mpamba te, kasi bozali moke oyo bozali kondima.
42Mpe ezali liloba lia nganga te. Ebele bazali kokanisa te.
43Ekitaki kowuta epai ya Nkolo ya molongo.
44Ata alobelaki biso ndambu ya maloba ya lokuta oyo balobaki,
45Tolingaki kozua ye na loboko ya mobali,
46Sima, tolingaki kokata ye singa ya motema,
47Moko azali te ya kopekisa biso.
48Ya soló, wana ezali sé bokundoli тропа babangi.
49Mpe toyebi malamu banani bakosi kati na bino.
50Мре ya soló, ye akozangisaka bapengwi te (na etumbu)
51Mpe ya soló, wana ezali bosembo mpenza ya bondimi.
52Kumisa nkombo ya Nkolo nayo ya lokumu.