القلم
The Pen • 52 ayahs • Meccan
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
1Nún[1], (nalapi) na ekomeli na oyo ezali kokoma.
2Yo (Muhammad) na ngrásia y a Nkolo nayo ozali libgoma te.
3Mpe ya sôló, ozali na lifuta oyo esilaka te,
4Mpe ya sôló, ozali na ezaleli ya malamu.
5Yo okomona mpe bango bakomona,
6Nani kati na bino amekami?
7Ya sôló, Nkolo wa yo ayebi malamu oyo abunga nzela naye, mpe ayebi malamu baye bazali na bokambami.
8Kaši kotosa bato ya lokuta te.
9Bakosepela ozala malamu na bango mpo bazala mpe malamu nayo.
10Mpe kotosa moko te na bango, bazali kolapa na ntina te.
11Bato ya songi songi, bazali kokosela bato makambo.
12Baye bapekisaka bolamu ya bato, bazali kolekisa ndelo mpe basali na masumu,
13Bazali na mitema makasi mpe bazali na lolendo.
14Ata soki azali na misolo ebele na bana ebele, (alingi kobonguana te)
15Soki batangeli ye mikapo mia biso, alobi: Wana ezali sé masapo ya bankoko ya kala.
16Tokomonisa elembo naye likolo na zolo.
17Ya soló, tomekaki bango lolenge tomekaki bato ya elanga tango bakanaki ete bakobuka yango lobi na tongo,
18Bazangaki koloba: Na bolingi ya Allah. (In cha Allah)
19Mabe kowuta epai ya Nkolo nayo ekwelaki yango bazali kolala,
20Na tongo ekomi lokola eloko ezalaki te.
21O mokolo molandi: Babiangani bango na bango.
22Bökende noki na bilanga na bino soki bolingi kobuka mbuma.
23Basololi kati na bango na bango na nsé tango babimaki тропа kokende,
24Mobola moko te akotela bino lelo na elanga,
25Mpe bakendeki na tango ya malamu na mokano nyoso ete bakoka kopimela babola.
26Mpe tango bamoni (elanga) yango, balobi: Ya soló tobungi nzela na biso,
27То yango; Kasi tozali na eloko te.
28Moto ya bosembo kati na bango alobi: Nayebisaki bino te ete: Soki bosanzolaki lukumu ya Allah?
29Balobi: Lokumu na Nkolo wa biso, ya sólo tozalaki bato mabe.
30Batalani bango na bango, bakomi koloba: Yo nde osali mabe,
31Mpe balobaki ete: Eh biso mpasi! Ya sólo, tozalaki batomboki.
32Tozali kolikia na Nkolo wa biso été abongola eloko ya malamu тропа biso, tozali kolikia pene na Nkolo wa biso.
33Lolenge wana nde etumbu ezalaki, kasi etumbu ya mokolo ya suka eleki monene. Soki bazali koyeba.
34Ya soló, babangi (Allah) bakozalaka epai ya Nkolo na bango na lola ya kitoko.
35Boye tokozua bandimi ndenge moko na batomboki?
36Boni bozali kokata likambo na lolenge wana?
37To boye bozali na buku eye bozali koyekola,
38Ete ya sólo, bokozua nyoso oyo bokolinga.
39To boye bolapelaki biso bandai ya bosôló kino mokolo ya suka, mpo topesa bino maye bolingi?
40Tuna bango, nani kati na bango azali nkumu na yango?
41To boye bazali na basangani? Baya na bango soki bazali koloba bosôló.
42Mokolo oyo lokolo ekomonamaka, mpe bakobengaka bango ete bafukama elongi na mabele kasi bakokokaka kofukama te.
43Bilongi na bango bikokitisama mpe bakozanga lokumu, nzoka nde babiangamaki mpo bafukama tango bazalaki malamu (na mokili).
44Tika ngai na oyo nyoso azali kozua masolo oyo na lokuta, tokozua bango malembe na esika oyo bakoyeba te.
45Мре natikelaki bango tango kaši, motambo na ngai ezali ya soló.
46То boye osengaki bango lifuta to osengaki bango bazua nyongo ya monene?
47To boye bayebi maye mabombami, yango bazali кокота?
48Мре kanga motema (Muhammad) na kozela mokano ya Nkolo nayo, kasi kozala lokola moto oyo azalaki na libumu ya mbisi te (Yûnus), tango abelelaki (Allah) na kati ya mawa ya monene.
49Soki тропа bolamu ya Nkolo naye te likolo naye, nde abwakamaki libanda bolumbu likolo ya mabele ekauka.
50Mpe Nkolo naye aponaki ye mpe atiaki ye o molongo ya bato malamu.
51Tango bapengwi bayokelaki yo likunya mpe kotala yo na miso ya mabe na tango bayokaki kurani, balobi: Ya sólo azali ligboma.
52Wana ezali sé bokundoli тропа mokili mobimba.