الطور
The Mount • 49 ayahs • Meccan
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
1Na ngomba ya at’tur.[1]
2Na buku oyo ekomama (na ba anzelu).
3Likolo ya ekomami ya polele.
4Na ndako oyo etondama.
5Mpe na likolo lolenge etombwama.
6Мре na ebale ya kotonda.
7Ya soló, etumbu ya Nkolo nayo ekokokisama.
8Ekozala na moto ya kopekisa yango te.
9Mokolo likolo likoningana.
10Mpe bangomba bikotambola.
11Mpasi ekozalaka mokolo wana epai ya babuki lokuta.
12Baye bazalaki na komibuaka na kati ya masano.
13Mokolo oyo bakobendaka bango na makasi na lifelo.
14Oyo nde lifelo oyo bozalaki kotiyela yango tembe.
15Boye oyo mpe ezali kindoki to bozali kornona malamu te?
16Bôžika kati na yango, bozala na bozeli to te, bokozala sé ndenge moko. Bokofutama sé kolandana na oyo bozalaki kosala.
17Ya sôló, babangi bakozalaka o kati ya lola na bolamu na bango.
18Bakomisepelisa na oyo Nkolo wa bango akopesa bango, mpe Nkolo wa bango akobatela bango na etumbu ya lifelo.
19Bolia bomela na mposa na biso, тропа lifuta ya maye bosalaki.
20Mpe bayekami likolo ya bambeto ebongisama kitoko, mpe tokobalisa bango basi ya kitoko ya miso ya minene ya moyindo.
21Mpe тропа baye bandima mpe mabota na bango elandi bango na bondimi; tokolandisela bango mabota na bango, mpe tokokutolaka maye basalaki ata токе te okati ya misala mia bango. Moto nyoso akotunamaka na makambo naye.
22Mpe tokopesaka bango bambuma mpe mișuni (ya kolia) oyo bakolinga.
23Nkeni moko ekotambola kati kati na bango, ekopesa bilobela lobela te mpe lisumu te.
24Okati na bango, bilenge mibali bakotelamaka тропа kosalela bango, bazali kongenga lokola mabanga kitoko na bongengi.
25Mpe bakobalukaka bango na bango bazali kotunana.
26Bakoloba ete: Ya soló, tofandaki okati ya mabota ma biso na bobangi (Allah)
27Yango Allah apesi biso mpe abateli biso na etumbu ya lifelo.
28Ya sólo, tozalaki kobondela ye, ya sólo, ye azali malamu mpe atonda mawa.
29Kundola тропа bolamu ya Nkolo nayo, ozali nganga te mpe ozali ligboma te.
30То bazali koloba ete: Azali mokomi ntoki, tozela likama naye ya liwa.
31Loba: Bozela, ngai mpe na bino mpe tozali kozela.
32То boye bamposa na bango ezali kotinda na lolenge wana, to boye bazali nde batomboki?
33To bazali koloba ete: Asalaki yango na ndenge naye moko? Kasi bazali kondima na yango te.
34(Malamu) baya na makambo mosusu ezala lokola yango, soki ya soló, bazali na bosembo.
35To bakelamaki kowuta na eloko moko te, to bango nde bakeli.
36To bango nde bakela likolo na nsé? Kasi bazali kondima te?
37To bazali na sanduku ya bozui ya Nkolo nayo, to baleki ye na nyoso?
38To bazali na emateli ya likolo mpo baya koyokamela? Kasi moyokameli na bango aya na elembo na yango ya polele.
39To (Allah) azali na bana basi mpe bino bozali na bana mibali?!
40To azali kosenga bango lifuta oyo ezali kopesa bango pasi тропа kofuta?
41To bazali na boyebi ya mabombami nde bazali кокота yango?
42To bazali kosala likita ya mabe? Kasi likita ya bapengwi ezongelaka sé bango moko.
43To bazali na nzambe mosusu na botiki Allah? Lokumu na Allah aleki oyo bazali kosangisa.
44Mpe soki bamoni ndambu ya likolo ekweyi (etumbu enene), balobi: Wana ezali nde mapata ekangama.
45Tika bango kino bakokutanaka na mokolo na bango oyo bakobetamaka na nkake.
46Mokolo oyo likita ya mabe na bango likosalisa bango na eloko moko te, mpe bakozuaka lisungi te.
47Ya soló, babubi bakozala na etumbu mosusu likolo ya oyo ya liboso, kasi ebele na bango bazali koyeba te.
48Mpe kanga motema тропа kozela motindo ya Nkolo nayo, mpo ete ya sólo, yo ozali na nsé ya ebateli na biso. Mpe sanzola lokumu ya Nkolo nayo tango ozali kotelema.
49Mpe kumisa ye (Allah) okati ya eteni ya butu, mpe otango minzoto mizali kolimwa.