النجم
The Star • 62 ayahs • Meccan
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
1Na monzoto tango ekweyaka.
2Moninga na bino abungi te mpe akosami te.
3Mpe azali koloba makambo na makanisi naye te.
4Ezali sé emoniseli ezali kokitela ye.
5(Anzelu Djibril) oyo atonda bokasi nde atangisaki ye yango.
6Oyo azali na bokasi sima amilakisi na lolenge naye ya anzelu.
7Mpe atelemaki na kongombela ya likolo koleka.
8Sima apusanaki pene mpe akitaki na nsé koleka.
9Ezalaki bongo na ntaka mibale to mpe mua moke na yango.
10Amoniselaki mowumbu naye maye amonisaki.
11Motema ekosaki te oyo emonaki.
12Boye bokoboyela ye na oyo amonaki?
13Мре amonaki ye lisusu tango akitaki тропа mbala ya mibale .
14Pene na sidr muntaha[1].
15Mpembeni na yango nde paladizo ya seko ezuami.
16Tango nzete ya sidr ezipamaki na oyo ezipi yango.
17Miso ebungi te, elekisi mpe ndelote.
18Ya soló, amonaki bikamuiseli minene ya Nkolo naye.
19Bopesa ngai sango ya Láta na Uzza[1]?
20Mpe mosusu ya misato Manáta[1].
21Boye bokozala na mwana mobali mpe ye azala na mwana mwasi?
22Wana ezali bokaboli ya mabe.
23Wana ezali sé bankombo oyo bopesa yango bino moko na batata mpe bankoko na bino, Allah akitisela yango elembetele te. Bazali kolanda sé makanisi na bamposa, nzoka nde bokambi esilaki koyela bango kowuta epai ya Nkolo na bango.
24To boye moto alingi azua nyoso lolenge azali kokanisa?
25Bomoyi ya nsé na oyo ya lobi, ezali epai ya Allah.
26Boni kati ya ba anzelu na likolo kosengela na bango bato ekosalisa te, sé sima ya ndingisa ya Allah na oyo alingi mpe asepeli.
27Ya soló, baye bazali kondima na mokolo ya suka te, bapesi ba anzelu bankombo ya basi.
28Kasi bazali na boyebi te, bazali sé kolanda makanisi. Mpe makanisi esalaka bosembo eloko te.
29Mitiya mosika na oyo akoboya bokundoli bwa biso, mpe bazali sé kolinga bomoyi ya mokili.
30Kuna nde esika mayele na bango ekendeke. Ya sólo, Nkolo nayo ayebi malamu nani abungi nzela naye, mpe ayebi nani oyo akambami.
31Mpe maye manso mazali na likolo mpe na nsé ezali ya Allah, mpo afuta baye basali mabe mpo na misala na bango, mpe afuta baye basali malamu тропа misala na bango.
32Baye bazali komitiya mosika na masumu ya minene, bazali sé kokweya na mwa mabunga ya mike mike, ya sólo Nkolo wa yo azali na bolimbisi bonene. Azali na boyebi koleka bino, ayebi malamu lolenge akelaki bino kowuta na mabele,mpe tango oyo bozalaki litono ya makila okati ya mabumu ya bamama na bino. Bomikumisa te na kondima, ye nde ayebi nani azali kobanga ye mpenza.
33Omoni te oyo azali kopesa mokongo?
34Mpe apesaka sé moke (suka na yango) akati kopesa.
35Boye azali na boyebi ya mabombami nde azali kornona?
36To boye bayebisaki ye te na ntina ya makomi ya Mûssa?
37Na ya Ibrâhîm oyo akokisaki elaka,
38Moto moko te akomema lisumu ya moninga,
39Kasi ya soló, moto akozuaka sé na molende naye.
40Mpe ya sólo, molende naye ekomonana,
41Sima, akofutama mpenza malamu.
42Mpe ya sólo, nyoso ekosukisama epai ya Nkolo wayo,
43Mpe ye nde asekisaka mpe alelisaka,
44Мре ye nde abomaka mpe apesaka bomoyi?
45Mpe ye nde akela balongani mibale, mwasi na mobali,
46Kowuta na litanga ya mayi ya mokongo tango babwaki yango .
47Mpe kokela ya mbala ya mibale ezali sé epai naye.
48Mpe ye nde apesaka moto bomengo, mpe ye nde apesaka bobola.
49Mpe ye nde Nkolo ya ach-chi’râ[1].
50Ye nde abomaka bato ya liboso na (mboka) Aad,
51Na Thamûd, moko atikala te.
52Mpe liboso na bango, bato ya Nûh bazalaki babubi mpe balekisaki ndelo.
53Lolenge moko na mboka oyo ebalusamaki (mutafikah mboka ya Loth),
54Azipaki yango ndenge azipaki etumbu ya makasi.
55Bolamu nini ya Allah oyo ozali kotiela yango tembe?
56Oyo azali mokebisi lokola bakebisi ya yambo.
57Ngonga esili kobeleme.
58Mosusu azali te oyo akofungola yango na botiki Allah.
59Boye bozali kokamwa na masolo oyo? (kurani)
60Mpe bozali koseka na esika ya kolela?
61Kasi bozali sé kosakana?
62Bogumbama тропа Allah mpe bobondela (ye).