العلق
The Clot • 19 ayahs • Meccan
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
1Tanga na kombo ya Nkolo nayo oyo akela,
2Akela moto kowuta na liboke ya makila.
3Tanga mpo Nkolo nayo azali malamu.
4Oyo atangisi na ekomeli.
5Atangisi moto maye azalaki koyeba te.
6Kasi ya soló, moto akomi motomboki,
7Ntango amimoni ete akomi na bozwi.
8Nzoka nde bozongi ezali epai ya Nkolo nayo.
9Omoni te moto oyo azali kopekisa,
10Mowumbu (ya Allah) ntango azali kosambela?
11Omonite soki azalaki na bokambi,
12To mpe azali kotinda bato na bobangi Allah?
13Omoni te soki aboyi kondima to apeși mokongo?
14Ayebi te ete ya soló, Allah azali kornona?
15Kasi soki atiki te, tokokanga ye na elongi naye.
16Elongi ya moto ya lokuta mpe mosumuki.
17Kasi abenga lisanga naye.
18Biso tokobenga bakengeli ya lifelo.
19Te, kotosa ye te, kasi pusana тре fukama (pembeni ya Nkolo nayo).