القدر
The Power • 5 ayahs • Meccan
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
1Ya soló, tokitisaki yango (kurani) o’butu ya mokano.
2Mpe nani akoyebisa yo eloko nini butu ya mokano?
3Butu ya mokano ezali malamu koleka sanza koto moko.
4Okatina yango ba anzelu bazali kokita elengo na molimo mosantu, na ndingisa ya Nkolo na bango na mokano ya makambo manso,
5Yango ezali kimia mpe boboto kino ntongo ekotana.