النبأ
The Tidings • 40 ayahs • Meccan
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
1Na likambo nini bazali komitunana?
2Likolo ya sango enene,
3Eye pona yango bakeseni makanisi.
4Te kasi bakoyeba yango sima ya mwa ngonga moke.
5Te sima lisusu bakoyeba yango.
6Tozalisaki te mabele etando?
7Mpe bangomba lokola makonzi?
8Tokelaki bino te mibale mibale?
9Мре tozalisaki te mpongi ezala pona bino bopemi?
10Мре tokelaki te butu ezala elamba ekozipa bino?
11Mpe tosalaki te mokolo тропа misala mia bomoyi?
12Mpe totongaki te likolo na bino (mapata) sambo ekembama?
13Mpe totiaki te o’teyi na yango mwinda mozali kongenga?
14Mpe tokitisaki kowuta na mapata mayi ebele,
15Mpo ete na mayi tobimisa bambuma mpe bilona,
16Na bilanga ekembisami (kitoto)?
17Ya soló, mokolo ya mbano mozali na ntango ya koyebana.
18Mokolo bakofula kelelo bokoya lisanga lisanga.
19Mpe likolo likofungwama bikokoma bikuke.
20Mpe bangomba bikotambola na lombango.
21Ya solo, lifelo ezali kozela.
22Esika yakofanda тропа batomboki.
23O’kati na yango bakofanda seko na seko.
24O’kati na yango bakoyoka mopepe ya kitoko te mpe bakomela eloko te,
25Longola sé mayi ya moto ya tofina,
26Lokola lifuta lia bosembo тропа bango.
27Mpo ete bazalaki kondima na mokolo mwa bosambisami te.
28Mpe batiaki ntembe na maloba na biso.
29Nzoka nde biso totiaki manso na mokanda.
30Kasi bomeka! Biso tokobakisa pona bino te sé etumbu.
31Ya soló, elonga ezali тропа babangi (Allah).
32Bilanga mpe masanga ya bilengi,
33Mpe bilenge basi baye bazali banso ya mbula moko,
34Mpe bankopo ebele ya bomeli.
35O’kati na yango bakoyokaka makambo mazanga ntina te mpe lokuta te.
36Yango nde lifuta kowuta na Nkolo nayo lokola libonza.
37Ye Nkolo mapata mpe mabele na maye mazwami kati kati na yango, Ar-Rahmân[1] bakozala na liloba te o’boso bwa ye.
38Mokolo molimo mosantu mpe na ba anzelu bakotelema molongo moko mpe moto akozala na liloba te longola sé oyo Ar-Rahmân[1] (Allah) akopesa ye ndingisa mpe akoloba sé bosembo.
39Mokolo yango ezali ya sólo. Oyo alingi amitia na libateli ya Nkolo naye.
40Ya sólo, tokebisi bino na etumbu ya pene, mokolo moto akomona maye maboko maye masalaki na ntango ena mopagano akoloba ete: Eh mpasi na ngai! Na bongwana ata mabele.