Al-Mursalat

المرسلات

Those Sent Forth50 ayahsMeccan

بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

وَٱلۡمُرۡسَلَٰتِ عُرۡفٗا﴿١

1(Nalapi na nkombo) ya baye batindamaki[1] ya kolandana! (ba anzelu)

فَٱلۡعَٰصِفَٰتِ عَصۡفٗا﴿٢

2Mpe na baye bafulaka mopepe na mbonge makasi!

وَٱلنَّٰشِرَٰتِ نَشۡرٗا﴿٣

3Mpe bazali kopanza bisika binso!

فَٱلۡفَٰرِقَٰتِ فَرۡقٗا﴿٤

4Mpe na baye bakabolaka mabe na malamu!

فَٱلۡمُلۡقِيَٰتِ ذِكۡرًا﴿٥

5Mpe na baye babwakaka mbela,

عُذۡرًا أَوۡ نُذۡرًا﴿٦

6Mpona bolimbisi to bokebisi!

إِنَّمَا تُوعَدُونَ لَوَٰقِعٞ﴿٧

7Oyo bolakamaki ekozangaka te.

فَإِذَا ٱلنُّجُومُ طُمِسَتۡ﴿٨

8Tango minzoto mikolimwaka.

وَإِذَا ٱلسَّمَآءُ فُرِجَتۡ﴿٩

9Mpe tango mapata ekopasuka,

وَإِذَا ٱلۡجِبَالُ نُسِفَتۡ﴿١٠

10Mpe tango bangomba bikolalisamaka,

وَإِذَا ٱلرُّسُلُ أُقِّتَتۡ﴿١١

11Mpe tango ngonga ya bosangani ya batindami ekotiyamaka.

لِأَيِّ يَوۡمٍ أُجِّلَتۡ﴿١٢

12Yango ezongisami mpona mokolo nini?

لِيَوۡمِ ٱلۡفَصۡلِ﴿١٣

13O mokolo ya kokata makambo.

وَمَآ أَدۡرَىٰكَ مَا يَوۡمُ ٱلۡفَصۡلِ﴿١٤

14Mpe nani akoyebisaka yo mokolo ya kokata makambo?

وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ﴿١٥

15Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!

أَلَمۡ نُهۡلِكِ ٱلۡأَوَّلِينَ﴿١٦

16Boye tobomaki bamisusu liboso te?

ثُمَّ نُتۡبِعُهُمُ ٱلۡأٓخِرِينَ﴿١٧

17Sima tolandisaki bamisusu te.

كَذَٰلِكَ نَفۡعَلُ بِٱلۡمُجۡرِمِينَ﴿١٨

18Lolenge wana nde tokosalelaka batomboki.

وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ﴿١٩

19Etumbu ekozala mokolo wana тропа bakosi.

أَلَمۡ نَخۡلُقكُّم مِّن مَّآءٖ مَّهِينٖ﴿٢٠

20Boye tokelaki bino na mayi ya moselu te?

فَجَعَلۡنَٰهُ فِي قَرَارٖ مَّكِينٍ﴿٢١

21Мре totiyaki yango na ebombelo elamu te?

إِلَىٰ قَدَرٖ مَّعۡلُومٖ﴿٢٢

22Na elaka oyo eyebani te?

فَقَدَرۡنَا فَنِعۡمَ ٱلۡقَٰدِرُونَ﴿٢٣

23Totiyaki mibeko na lolenge ya malamu te?

وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ﴿٢٤

24Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!

أَلَمۡ نَجۡعَلِ ٱلۡأَرۡضَ كِفَاتًا﴿٢٥

25Boye totiyaki mabele ezala ebombelo ya (makambo) nyoso te?

أَحۡيَآءٗ وَأَمۡوَٰتٗا﴿٢٦

26(Mpona) baye bazali na bomoyi na baye bakufa?

وَجَعَلۡنَا فِيهَا رَوَٰسِيَ شَٰمِخَٰتٖ وَأَسۡقَيۡنَٰكُم مَّآءٗ فُرَاتٗا﴿٢٧

27Boye topikelaki yango bangomba ya milai? Mpe tomelisaki bino mayi ya elengi te?

وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ﴿٢٨

28Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!

ٱنطَلِقُوٓاْ إِلَىٰ مَا كُنتُم بِهِۦ تُكَذِّبُونَ﴿٢٩

29Bökende epai ya maye bozalaki kozua yango nalokuta.

ٱنطَلِقُوٓاْ إِلَىٰ ظِلّٖ ذِي ثَلَٰثِ شُعَبٖ﴿٣٠

30Bökende epai ya elili ya milinga oyo ezali na mozindo misato,

لَّا ظَلِيلٖ وَلَا يُغۡنِي مِنَ ٱللَّهَبِ﴿٣١

31Oyo ezali na elili te mpe ekoki kobatela moto na motó te!

إِنَّهَا تَرۡمِي بِشَرَرٖ كَٱلۡقَصۡرِ﴿٣٢

32Ya soló motó ezali kobwaka balolemo na yango ya kilo lokola bandako ya kilo,

كَأَنَّهُۥ جِمَٰلَتٞ صُفۡرٞ﴿٣٣

33Ezali lokola bakamela langi na yango lokola mayi ya mosaka.

وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ﴿٣٤

34Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!

هَٰذَا يَوۡمُ لَا يَنطِقُونَ﴿٣٥

35Mokolo wana bakolobaka te,

وَلَا يُؤۡذَنُ لَهُمۡ فَيَعۡتَذِرُونَ﴿٣٦

36Mpe bakolingela moto moko bolimbisi te,

وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ﴿٣٧

37Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!

هَٰذَا يَوۡمُ ٱلۡفَصۡلِۖ جَمَعۡنَٰكُمۡ وَٱلۡأَوَّلِينَ﴿٣٨

38Oyo nde mokolo ya kokata (makambo), tokosangisa bino na bato ya liboso.

فَإِن كَانَ لَكُمۡ كَيۡدٞ فَكِيدُونِ﴿٣٩

39Soki bolingi bosala likita ya mabe тропа ngai, bosalela ngai.

وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ﴿٤٠

40Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!

إِنَّ ٱلۡمُتَّقِينَ فِي ظِلَٰلٖ وَعُيُونٖ﴿٤١

41Ya soló babangi, bakozala na bisika ya malili mpe ya maziba,

وَفَوَٰكِهَ مِمَّا يَشۡتَهُونَ﴿٤٢

42(Bakoliaka) bambuma oyo balingi.

كُلُواْ وَٱشۡرَبُواْ هَنِيٓـَٔۢا بِمَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ﴿٤٣

43Bolia, mpe bomela na mposa na bino тропа maye bosalaki.

إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ﴿٤٤

44Ya sólo, lolenge wana nde tokofutaka babongisi.

وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ﴿٤٥

45Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!

كُلُواْ وَتَمَتَّعُواْ قَلِيلًا إِنَّكُم مُّجۡرِمُونَ﴿٤٦

46Bolia mpe bomela (токе na mokili), Ya sólo penza bozali batomboki.

وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ﴿٤٧

47Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!

وَإِذَا قِيلَ لَهُمُ ٱرۡكَعُواْ لَا يَرۡكَعُونَ﴿٤٨

48Mpe tango bayebisaki bango: Ete bogumbama, kasi balingaki kogumbama te. (тропа Allah)

وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ﴿٤٩

49Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!

فَبِأَيِّ حَدِيثِۭ بَعۡدَهُۥ يُؤۡمِنُونَ﴿٥٠

50(Sima na yango), liloba nini lisusu bokondimaka?

RELATED SURAHS