ص
Sad • 88 ayahs • Meccan
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
1Swâd,[1] na kurani, eye ezali na bokundoli.
2Kasi baye bapengwa bazali sé na ntembe.
3Bato boni tobomaki liboso na bango, bagangaki ete: Oh biso! Kasi ezali lisusu tango ya kobika te.
4Mpe (bato ya makkah) bakamuaki ete mokebisi kati na bango akomela bango, mpe bapengwi balobaki: Oyó azali nganga mpe moto ya lokuta.
5Boye alingi kotia banzambe ete bakoma sé Nzambe moko? Oyó ezali likambo ya kokamwa.
6Mpe bankumu na bango bakei mpe balobi: Bökende mpe botikala na banzambe na bino. Ya soló wana nde ezali malamu.
7Totikala koyoka yango te na lingomba lia suka[1] ya sólo, eloko oyo basali yango kosala.
8Nini? Ezali nde ye oyo bakitiseli ye bokundoli kati kati na biso? Bazali na tembe тропа bokundoli bwa ngai, kala te, bakomekaka etumbu na ngai.
9То, boye basimbi sanduku ya ngolu ya Nkolo wayo wa bokasi mopesi manso.
10То boye bango basimbi bokonzi ya likolo na ya nsé, mpe maye manso mazali o kati na yango mibale? Bamata na eloko nyoso oyo ekosalisa bango тропа kobuta.
11Mapinga oyo basangisi awa, ekosalaka eloko te sé bokweisami. (lokola lolenge ezalelaki ba ahzâb kala.)
12Liboso na bango, bato ya Nüh, na ba Aad, na falo moto ya bandako etongama, baboyaki kondima.
13Mpe Thamüd, na bato ya Loth, na bato ya aïkat, banso basanganaki. (mpe baboyaki kondimela bantoma)
14Ata moko te andimelaki batindami, mpe bazuaki etumbu.
15Bazalaki kozela sé lolaka moko liye likopesa bango ata bopemi moko te.
16Мре balobaki: Nkolo pesa biso oyo ya biso yambo ete mokolo ya suka eya.
17Zala na bozeli тропа oyo bazali koloba, mpe kanisa na mowumbu wa biso Dáwud, oyo atonda na bokasi yakokumisa biso. Ya soló ye azalaki komizongisa (epai ya Allah).
18Мре totiyaki bangomba ezala na botondi tongo mpe pokwa elongo naye.
19Mpe bandeke lokola, nyoso esalamaki sé тропа kokumisa ye. (Allah)
20Mpe tolendisaki bokonzi bwa ye, mpe topesaki ye bwanya mpe mayele ya kokata makambo.
21Boye basango ya bato ya kosuana ekomelaki yo te? Tango babutaki na esika ya losambo. (ya likolo)
22Tango bakotelaki Dáwud, mpe abangaki. Balobaki naye ete: Kobanga te, tozali kowelana biso mibale, kabola kati na biso na bosembo, kasi kotengama te, mpe kamba biso o nzela ya semba.
23Ya sólo, ndeko wa ngai ya mobali oyo azali na bameme ntuku libua na libua, mpe ngai nazali na meme moko, alobi na ngai: Pesa nabombela yo yango, mpe tango tozongisani maloba, alobi na ngai mabe.
24(Dáwud) alobi: Abubaki yo ya sôló, тропа kosenga yo тете nayo mpo akokisa na (yango motango) oyo ya ye, mpe ya sôló bato balingaka kobotolo biloko ya baninga, longola sé baye bandima mpe basalaka misala milamu, kaši bazali токе. Мре Dâwud akanisaki ete tomekaki ye, asengaki bolimbisi epai ya Nkolo wa ye, mpe agumbamelaki mpe atubelaki.
25Mpe tolimbisaki ye na yango mpe epayi nabiso akozala na esika ya likolo mpe oyo esika malamu ya kozonga.
26Eh Dâwud! Ya soló, totiyaki yo mokitani kati na mabele, mpe kata kati na bato na bosembo, kasi kolanda baposa te, noki te ekobungisa yo nzela ya Allah. Ya sólo, baye babungi nzela ya Allah, bakozalaka na etumbu ya makasi, mpo ete babosanaki (kokanisa) na mokolo mwa suka.
27Mpe tokelaki likolo na mabele na maye manso mazali kati kati na yango mpamba te, lolenge wana nde bapengwi bazali kokanisa. Kasi bapengwi bazali na mpasi o kati ya moto, (ezali kozela bango)
28То boye bandimi baye basalaki misala milamu bazala lokola baye babebisaki na mokili? То totiya babangi (Allah) ndenge moko na bato mabe?
29Buku eye tokitisaki epai nayo, ya mapamboli mpo ete basosola mikapo mia yango, mpe mpo ete banganga ya mayele bakundola yango.
30Mpe topesaki Dáwud likabo ya mowumbu ya malamu Suleyman, ya soló, azalaki kosenga bolimbisi mingi.
31Tango batiaki liboso naye bampunda ya kitoko sima ya nzanga тропа kokima mbangu,
32Mpe alobaki ete: Ya soló ngai namipesi kolinga biloko ya mokili, kino nabosani bokundoli bwa Nkolo na ngai kino moyi molimwi.
33Bozongisela ngai yango, na yango abandi kokata yango makolo na bakingo.
34Mpe ya sólo, tomekaki Suleyman, tobwakaki likolo ya kiti naye nzoto ya moto, sima atubelaki.
35Alobi: Nkolo! Limbisa ngai mpe pesa ngai bokonzi boye moko te sima na ngai akokana na yango. Ya sólo, ozali mopesi monene.
36Мре totielaki ye mopepe, ezalaki kotambola na mitindo naye bipai binso alingaki na mpete.
37Mpe basatana bazalaki kotongela ye ndako, basusu bazalaki kokota na nsé ya mayi тропа kosalela ye mosala,
38Na basusu lokola, bakanga bango mibale mibale na minyololo.
39Oyó nde likabo lia biso, kabola yango,to kopesa te, sala ndenge olingi.
40Mpe epayi na biso akozala na esika ya likolo oyo esika malamu ya kozonga.
41Mpe kundola mowumbu wa biso Ayúb tango abelelaki Nkolo waye, ete satana akangi ngai na mpasi mpe etumbu.
42Beta (mabele) na makolo nayo, oyo ezali mayi ya тріо mpo osukola mpe órnela mosusu.
43Mpe tozongiselaki ye libota lia ye, mpe tobakiselaki ye libota mosusu. Wana ngolu na biso тропа bokundoli ya bato banso ya mayele.
44Mpe simba na loboko nayo eteni ya singa ya libende mpe bete yango, kasi kozangisa elaka te, ya soló tokutaki ye na bokangi motema mpenza, oyo nde mowumbu ya malamu azalaki kotubela mingi.
45Мре kanisa тропа Ibrâhîm па Is’hâq па Ya’qüb, bawumbu па biso ya nguya mpe ya mayele.
46Ya soló toponaki bango boponami ya bokundoli ya lola.
47Mpe ya sólo, bazali epai na biso, baponami ya malamu.
48Mpe kanisa Ismail na Al-yasa’ na Dzul-kifl, bango banso bazalaki kati na baponami malamu.
49Oyó nde bokundoli, mpe babangi bakozalaka na bozongi bolamu.
50Lola ya edeni bizibeli na yango ekozala ya kofungowama pona bango.
51Wana nde bakoyekemelaka yango, bazali kosenga bambuma ebele, mpe komela.
52Mpe pembeni na bango, bakozala na basi ya kitoko, baye bazali na miso ya kolula te.
53Oyó nde elengelamaki тропа bino mokolo mwa lifuta.
54Ekozalaka nde bopesi bwa biso eye ekokutuama te.
55Wana, batomboki bakozala na bozongi ya mabe.
56Lifelo nde ekozikisa bango, bovandi kani ya mabe ya lolenge wana!
57Na yango, bakomela mayi ya tofina ya moto makasi.
58Mpe bakozuaka bitumbu bisusu sé ya lolenge wana.
59Oyo nde lingomba liye likokotaka nzela moko na bino, mpe bakoyambaka bango te. Kasi bakozika na moto.
60Bakolobaka: Bokoyambama malamu te, bino nde bolengeleki yango тропа biso, esika kani ya bovandi ya mabe ya lolenge wana!
61Bakolobaka: Nkolo wa biso, nani apeși biso oyo, bakisela ye etumbu na lifelo.
62Mpe bakoloba: Mpona nini tozali kornona te mibali ba oyo tozalaki kotanga bango na molongo ya bato mabe?
63Boye tosekaka bango to babungaka na miso na biso?
64Ya soló, wana ekozala kosuana ya bato ya moto.
65Loba: Ya sólo, nazali sé mokebisi. Mpe nzambe mosusu azali te na kobondela na bosóló sé Allah wa bomoko mpe ya bokasi koleka.
66Nkolo wa likolo na mabele, mpe manso maye mazali okati na yango mibale, azali wa bokasi atonda bolimbisi.
67Loba: (kurani) oyo ezali na sango ya monene.
68Boye bino bozali koboya yango.
69Nazalaki na boyebi te тропа ba anzelu, tango bazalaki koswana.
70Ayebisaki ngai ete nazali sé mokebisi ya polele.
71Tango Nkolo wayo alobaki na ba anzelu: Ya soló nalingi kokela moto na mabele.
72Soki nabongisi ye mpe nafuli ye mopepe ya molimo na ngai, bokweyela ye na bogumbami.
73Mpe ba anzelu banso bafukamelaki ye.
74Longola sé ibilisa asalaki lolendo mpe azalaki okati ya bapengwi.
75(Allah) alobi: Eh ibilisu! Eloko nini epekisi yo kogumbamela (moto) oyo nakeli ye na maboko na ngai? Boye osali lolendo to omimoni ete yo ozali likolo koleka?
76Alobi: Nazali malamu mingi koleka ye, okelaki ngai na moto mpe okelaki ye na mabele.
77(Allah) alobi: Віта awa, ozali ya kolakelama.
78Mpe botutu bwa ngai, bokozalaka likolo lia yo kino o mokolo mwa suka.
79Alobi: Nkolo, tikela ngai tango kino omokolo mwa bosekwisami.
80(Allah) alobi: Ya soló, napesi yo tango.
81Kino omokolo ngonga ekokokaka.
82Alobi: Na nguya nayo (Allah), nakobungisaka bango banso.
83Longola sé bawumbu nayo baye opona.
84(Allah) alobi: Ya sólo, mpe oyo ezali bosolo nazali koloba.
85Ya sólo, na kotondisa lifelo nayo, mpe baye banso bakolanda yo.
86Loba: Nazali kosenga bino lifuta te, mpe nazali te oyo azali kokonza na makasi.
87(Kurani) ezali sé bokundoli тропа molongo mobimba.
88Mpe kala te, bokoyebaka basango na yango.