العاديات
The Chargers • 11 ayahs • Meccan
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
1(Na lapi) na bakimi mbango baye batondi na pema!
2Baye bazali kobimisa bambuma ya moto ezali kongala (mikalali),
3Baye babandaka bitumba na ntongo,
4Mpe sima bazali komatisa putulu.
5Mpe bazali kokota o’kati ya mapinga ya banguna!
6Ya soló, moto azali na botondi te тропа Nkolo naye.
7Mpe ya sólo, moto azali nzeneneke na yango.
8Kasi pona mposa ya bomengo azali komipesa makasi.
9Ayebi te ntango bakobimisa maye mazwami na malita.
10Mpe maye mabombamaki na mitema mikobima polele?
11Ya sólo, mokolo wana Nkolo na bango ayebi sango na bango malamu mpenza.