الزلزلة
The Earthquake • 8 ayahs • Medinan
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
1Ntango mabele ekoningana na koningana moko ya makasi,
2Mpe sima mabele ekobimisa mikumba na yango.
3Mpe moto akoloba ete oyo nini boye?
4Mokolo wana mabele ekosakola basango na yango.
5Pamba te mpo Nkolo nayo asili komonisa yango.
6Mokolo wana bato bakobima bipai na bipai mpo ete bamonisa bango misala na bango.
7Moto oyo asalaki bolamu moke lokola mbuma zelo akomona yango.
8Na oyo mpe asalaki mabe moke lokola mbuma zelo akomona yango.