الانشقاق
The Splitting Open • 25 ayahs • Meccan
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
1Ntango mapata mako pasuka,
2Mpe makotosa Nkolo na yango, mpe ekosala maye esengeli esala,
3Mpe ntango mabele makolalisama,
4Mpe makosanza maye manso mazwami okati na yango mpe makotikala mpamba,
5Mpe makotosa Nkolo na yango mpe ekosala oyo esengeli esala,
6Oh yo moto! Ozali koyika mpiko тропа Nkolo nayo ntango nyoso yeba ete okokutana naye.
7Moto oyo akoyamba buku naye na loboko naye ya mobali.
8Akosambisama na ndenge ya malamu.
9Mpe akozonga o’libota naye na esengo.
10Kasi na moto oyo akoyamba buku naye nasima ya mokongo naye,
11Akomisengela mabe,
12Мре akozikisama okati ya moto ya makasi,
13Ya soló, ye na mokili azalaki na esengo o’kati na libota naye.
14Azalaki kokanisa te ete akosekwisama.
15Kasi ya sólo, Nkolo naye azalaki kotala ye.
16Te na lapi na ngonga ya mpokwa,
17Mpe na lapi na butu na molili na yango,
18Mpe na lapi na nsanza ntango ekomaka mobimba,
19Ya sólo, bokolekanaka biteni na biteni.
20Mpona nini bazali kondima te,
21Mpe mpona nini bafukamaka te ntango kurani ezali kotangama likolo na bango?
22Kasi bapengwi bazali kozwa yango lokuta.
23Nzoka Allah ayebi maye bazali kobomba.
24Pesa bango sango ya etumbu ya makasi.
25Longola sé baye bandimi mpe basali misala ya malamu bazali na lifuta ya suka te.