القيامة
The Resurrection • 40 ayahs • Meccan
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
1Nalapi na mokolo ya lisekwa,
2Mpe nalapi na molimo oyo elingi kotika mabe te!
3Moto akanisi été tokosangisa mikuwa mia ye te?
4Kasi tozali na bokoki ya kobongisa ye. (mpe kozongisa ye lolenge azalaki)
5Moto alingi sé atikala na mabe.
6Azali kotuna: Lisekwa ekozalaka mokolo nini?
7Tango miso ekobulungana (ezangi kornona).
8Mpe sanza ekozanga bongengi na yango.
9Mpe moyi na sanza ekosanganaka.
10Mokolo wana moto akolobaka: Wapi nzela ya kokima?
11Esika ya kokima ezali te.
12Bozongi ekozalaka mokolo wana epai ya Nkolo nayo.
13Bakoyebisa moto mokolo wana maye asalaki na maye atikaki тропа kosala sima.
14Kasi moto ye moko akoyebaka (makambo naye)
15Mpe ata asengi bolimbisi.
16Kowelisa lolemu nayo te тропа kotanga na yango (kurani).
17Ya soló, biso nde tokosangisa yango na motema nayo mpe kotanga yango.
18Tango tozali kotangisa yo yango, landa yango malamu.
19Sima ya sólo, tokolimbolela yo yango.
20Kasi bolingi sé (bomoyi) ya nsé,
21Mpe botiki oyo ya mokolo ya suka,
22Mokolo wana okomona bilongi bikongenga,
23Bizali kotala Nkolo na yango,
24Mpe mokolo wana bilongi bikoyinda,
25Bizali kozela etumbu.
26Kasi te! Tango (molimo) тококота na mongongo,
27Мре ekolobama: Nani sika oyo mobikisi?
28Akanisi été alingi akufa. (azali kobunda na liwa),
29Mpe lokolo elali likolo ya moninga,
30Bakomema yo epai ya Nkolo nayo mokolo wana.
31Mpo andimaki te mpe atelemisaki losambo te,
32Kasi aboyaki mpe apesaki mokongo,
33Sima akendaki epai ya bato naye azali kosala lolendo,
34Mpasi nayo mpasi.
35Sima mpasi nayo mpasi.
36Moto azalaki kokanisa ete bakotika ye sé pamba bongo (sima ya kokela ye)?
37Boye abima kowuta na mayi ya mokongo te oyo elonama?
38Sima na yango akomaki liboke ya makila mpe apesaki ye lolenge ya kitoko te?
39Sima akelaki lolenge ya bato mibale te? Mwasi na mobali?
40Ezali (Allah) te nde azali na bokoki ya kosekwisa bawei?